Lakisá makambo oyo ezali na kati

‘Sakolá nsango malamu!’

Liyangani ya Batatoli ya Yehova ya 2024

Kokɔta ezali ofele Bakɔngɔlaka mabonza te

Makanisi ya ntina ya programɛ ya liyangani

Mokolo ya mitano: Okomona makambo oyo endimisi biso ete nsango malamu oyo etali Yesu, oyo ezali na Baevanzile, ezali makambo ya bomoi na ye oyo ekomamaki na bosikisiki. Okoyekola ndenge masolo yango ya Biblia ekoki kosalisa biso lelo oyo.

Mokolo ya pɔsɔ: Makambo nini esakolamaki mpo na kobotama ya Yesu mpe bomwana na ye, mpe makambo yango ekokisamaki mpenza?

Mokolo ya lomingo: Na diskur oyo euti na Biblia, oyo ezali na motó ya likambo “Ntina oyo tobangaka bansango ya mabe te,” tokoyeba ntina oyo bamilio ya bato bazalaka na kimya mpe motema ya kokita atako mokili oyo ezali kobeba se kobeba.

Video ya drame

Lisolo ya mosala ya Yesu: Lisolo 1

Pole ya solosolo ya mokili

Kobotama ya Yesu na ndenge ya likamwisi ezalaki likambo ya liboso ya kokamwa oyo esalemaki na bomoi na ye ntango azalaki naino mwana. Baboti na ye bamemaki ye na Ezipito mpo na kokima mokonzi mabe oyo alingaki koboma ye. Na nsima, akamwisaki bateyi minene mosusu ya mikolo na ye. Okomona makambo yango mpe makambo mosusu oyo video ya biteni mibale oyo tokotala na mokolo ya mitano mpe mokolo ya pɔsɔ elobeli.

Talá bavideo oyo elandi mpo na liyangani ya mbula oyo

Nini elekaka na mayangani na biso oyo esalemaka mbula na mbula?

Okomona makambo oyo okokuta na mayangani ya Batatoli ya Yehova.

Liyangani ya Batatoli ya Yehova ya 2024: ‘Sakolá nsango malamu!’

Talá makambo tokoyekola na liyangani ya mbula oyo.

Video ya drame na mokuse: Lisolo ya mosala ya Yesu.

Bato mingi bayebi ndenge Yesu abotamaki na ndenge ya likamwisi. Kasi makambo nini esalemaki liboso mpe nsima ya kobotama na ye?