Lakisá makambo oyo ezali na kati


KOYEKOLA BIBLIA ELONGO NA MOTATOLI YA YEHOVA MOKO

Sepelá na bomoi libela na libela!

Boyekoli oyo ya Biblia ezali ya ofele. Okozwa biyano na mituna oyo:

  • Ndenge nini nakoki kozala na bomoi ya esengo?

  • Mabe mpe bampasi ekosila mokolo mosusu?

  • Nakoki komona lisusu bandeko na ngai oyo bakufá?

  • Nzambe akipaka ngai mpenza?

  • Ndenge nini nakoki kobondela mpo Nzambe ayoka ngai?

Koyekola ezali ofele

Makambo nyonso oyo okoyekola ezali ofele, ezala mpe buku Sepelá na bomoi libela na libela!. Tokoki mpe kopesa yo Biblia ofele soki ozali na mposa na yango.

Na esika oyo olingi

Kutáná na molakisi na yo na esika oyo olingi to sololá na ye na nzela ya aparɛyi na ngonga oyo omoni malamu.

Tokotya yo mbamba te

Okoki kokata boyekoli yango ntango nyonso oyo olingi, tokotya yo mbamba te osilisa yango.

Boyekoli yango esalemaka ndenge nini?

Molakisi akosalisa yo oyekola makambo oyo Biblia eteyaka, liteya moko nsima ya mosusu. Boyekoli ya Biblia na lisalisi ya buku Sepelá na bomoi libela na libela! ekosalisa yo malɛmbɛmalɛmbɛ oyeba makambo oyo ezali na Biblia, mpe omona ndenge oyo ekoki kosalisa yo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá video oyo to mituna oyo bato batunaka mingi mpo na boyekoli yango.

Olingi omona na mokuse ndenge buku yango ezali?

Bwaká liso na mateya ya ebandeli ya boyekoli yango.

Olingi komeka boyekoli yango?

Finá butɔ oyo mpo obanda boyekoli na yo ya Biblia.