Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Bandeko na biso ya bolingo:

Nimero ya liboso mpenza ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2008, emonisaki ete motó ya likambo moko oyo elobi “Mekolá kondima na bango,” ekobanda kobima. Banda wana, masolo ya sika ya eteni yango ebimaka nsima ya sanza misato mpe esepelisaka biso mingi!

Bato balobaki nini mpo na masolo yango? Nsima ya kosilisa kotánga lisolo oyo elobelaki Marta, motángi moko akomaki boye: “Nasɛkaki ntango natángaki lisolo yango mpo nazali mpenza lokola ye; nalingaka ntango nyonso kaka nazala moyambi malamu ya bato mpe nasalaka misala mingi kasi ntango mosusu nabosanaka ete esengeli napema mpe nazalaka esika moko ná baninga.” Nsima ya kotánga lisolo ya Estere, elenge moko ya mbula 15 alobaki ete: “Nakanisaki ete tokoki kokóma baombo ya bilamba mpe ya biloko oyo euti kobima sika. Tosengeli kosala monzɛlɛ; kasi, tosengeli te kolekisa ndelo.” Abakisaki ete: “Yehova atyaka nde likebi na bomoto na biso ya kati.” Mpe lisolo oyo elobelaki ntoma Petro esepelisaki ndeko moko ya mwasi mpe etindaki ye aloba boye: “Namikɔtisaki mpenza na lisolo yango. Namiyokaki lokola nazalaki wana! Nazalaki kosalela matoi, miso, zolo, . . . mpo na koyoka makambo oyo balobeli na bavɛrsɛ yango.”

Batángi yango mpe ebele mosusu oyo bakomaki mpo na komonisa botɔndi na bango mpo na masolo yango, bandimisi mpenza likambo oyo ntoma Paulo akomaki eleki sikoyo mbula ebele ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso.” (Rom. 15:4) Ya solo, Yehova akomisaki masolo wana na Biblia mpo epesa biso mateya ya ntina mpenza. Biso nyonso, ezala tolekisi mbula boni na solo, tokoki kozwa mateya na masolo yango.

Tozali mpenza kolendisa yo ete otánga buku oyo ntango kaka ozwi yango. Bokoki kokɔtisa yango na programɛ na bino ya Losambo na kati ya libota; bana bakosepela mpenza na yango! Ntango tokoyekola buku yango na Boyekoli ya Biblia na lisangá, kozangisa ata pɔsɔ moko te! Kokende mbangumbangu te; tángá yango na likebi mpenza. Salelá likoki na yo ya kokanisa, mpe saláká lokola ozali na kati ya makambo oyo balobeli na lisolo mokomoko. Lukáká komiyoka ndenge bato oyo Biblia elobeli bamiyokaki, mpe luká komona ndenge bamonaki. Luká koyeba ndenge oyo basalaki ntango makambo mosusu ekómelaki bango ná ndenge oyo yo olingaki kosala.

Ezali mpenza esengo mingi mpo na biso kosalela buku oyo ná yo. Tiká ete ezala lipamboli mpo na yo mpe libota na yo. Totindeli bino mpenza mbote na biso ya bolingo,

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova