Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 8

Ntango likambo ya mawa esalemi

Ntango likambo ya mawa esalemi

“Bozali kosepela mingi, atako sikoyo, esengeli bóyoka mawa na komekama ndenge na ndenge mpo na mwa ntango moke.”1 Petro 1:6

Ata soki bosali nyonso mpo bózala na libala mpe libota ya esengo, makambo oyo ekanami te esalemaka, mpe mpo na yango, ekoki kozala mpasi bóbatela esengo na bino. (Mosakoli 9:11) Na bolingo na ye, Nzambe ayebisi biso oyo tokoki kosala ntango tokutani na mikakatano. Soki osaleli batoli ya Biblia oyo elandi, yo ná libota na yo bokolonga ata makambo ya mabe koleka.

1 TYELÁ YEHOVA MOTEMA

OYO BIBILA ELOBI: ‘Bóbwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.’ (1 Petro 5:7) Kobosanaka te ete osengeli te kopesa Nzambe foti mpo na mikakatano oyo ezali kokómela yo. (Yakobo 1:13) Soki opusani penepene na ye, akosalisa yo na lolenge ya malamu koleka. (Yisaya 41:10) Biblia elobi ete: “Bósopa motema na bino liboso na ye.”Nzembo 62:8.

Okozwa mpe libɔndisi na kotánga mpe koyekola Biblia mokolo na mokolo. Soki ozali kosala yango, okomona ndenge Yehova “abɔndisaka biso na kati ya bolɔzi na biso nyonso.” (2 Bakorinti 1:3, 4; Baroma 15:4) Alaki kopesa yo “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi nyonso.”Bafilipi 4:6, 7, 13.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Bondelá Yehova asalisa yo ozala kimya mpe okanisaka malamu

  • Talelá makambo nyonso oyo ekoki kosalisa yo mpe poná oyo ezali malamu koleka mpo na yo

2 MIBATELÁ MPE BATELÁ LIBOTA NA YO

OYO BIBLIA ELOBI: “Motema ya moto ya mayele ezwaka boyebi, mpe litoi ya bato ya bwanya elukaka kozwa boyebi.” (Masese 18:15) Luká koyeba makambo nyonso. Luká koyeba mposa ya moto mokomoko ya libota na yo. Sololá na bango. Yoká bango.Masese 20:5.

Bongo soki moto moko ya libota akufi? Kobanga te komonisa ndenge ozali komiyoka. Yebá ete ata Yesu “alelaki, abimisi mpisoli.” (Yoane 11:35; Mosakoli 3:4) Kopema mpe kolala mwa mingi ezali na ntina. (Mosakoli 4:6) Yango ekosalisa yo mpo ozala mawamawa koleka ndelo te.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Zalá na momeseno ya kosolola na bato ya libota na yo ata soki likambo ezali te. Ntango mikakatano ekobima, bakobanga te kosolola na yo

  • Sololá na bato mosusu oyo bakutaná mpe na likambo ya ndenge wana

3 LUKÁ LISUNGI OYO OSENGELI NA YANGO

OYO BIBLIA ELOBI: “Moninga ya solosolo alingaka ntango nyonso, mpe azali ndeko oyo abotami mpo na ntango ya mpasi.” (Masese 17:17) Baninga na yo bakoki kozala na mposa ya kosalisa yo, kasi mbala mosusu bayebi te nini básala. Kobanga te koyebisa bango mposa na yo. (Masese 12:25) Lisusu, luká lisalisi epai ya bato oyo bayebi Biblia malamu. Toli ya Biblia oyo bakopesa yo ekosalisa yo.Yakobo 5:14.

Okozwa lisungi oyo osengeli na yango ntango ozali koyangana mbala na mbala na bato oyo bandimelaka mpenza Nzambe mpe bilaka na ye. Okolendisama mingi mpe ntango ozali kosalisa basusu oyo bazali na mposa ya kolendisama. Yebisá bango mateya ya Yehova mpe bilaka na ye. Salisáká bato oyo bazali na bosɛnga, mpe kokimaka te bato oyo balingaka yo mpe bakipaka yo.Masese 18:1; 1 Bakorinti 15:58.

OKOKI KOSALA BOYE:

  • Sololá na moninga moko ya motema mpe ndimá asalisa yo

  • Lobelá mpenza bamposa na yo polele