Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI No 1 2022 | Koyinana ekoki kosila?

Lelo na mokili mobimba bato bazali koyinana mpenza mpe bazali komonisa yango na ndenge mingi. Na ndakisa, bazali kopona bilongi, kosalela bato makambo ya mabe mpenza, kofinga bango, ata mpe kobɛta bango. Ezaleli ya koyina bato ekoki mpenza kosila? Masolo ya zulunalo oyo ezali komonisa ndenge Biblia ekoki kosalisa biso tólonga ezaleli mabe ya koyina basusu. Ezali mpe komonisa elaka oyo Nzambe apesi ya kosilisa koyinana mpo na libela.

 

Tokoki kotika ezaleli ya koyina basusu!

Koyinana emonanaka na makambo nini? Mbala mingi emonanaka ndenge nini?

Mpo na nini bato bayinanaka?

Biblia emonisi esika oyo koyinana eutá, ntina oyo bato bayinaka basusu, mpe ntina oyo koyinana etondi lelo.

Ndenge ya kotika koyina basusu

Mateya ya Biblia esalisi bato mingi babongwana.

NDENGE YA KOTIKA KOYINA BASUSU

1 | Koponaka bilongi te

Mekolá Nzambe oyo aponaka bilongi te mpo olongola makanisi nyonso ya mabe mpo na basusu.

NDENGE YA KOTIKA KOYINA BASUSU

2 | Kozongisa mabe na mabe te

Soki otyeli Nzambe motema ete akobongisa makambo nyonso ya kozanga bosembo mosika te, okolonga makanisi ya kozongisa mabe na mabe.

NDENGE YA KOTIKA KOYINA BASUSU

3 | Longolá koyina na makanisi na yo

Na lisalisi ya Liloba ya Nzambe okoki kolongola makanisi mpe mayoki ya koyina basusu.

NDENGE YA KOTIKA KOYINA BASUSU

4 | Nzambe akoki kosalisa yo otika koyina basusu

Elimo santu ya Nzambe ekoki kosalisa yo okóma na bizaleli ya malamu oyo elendisaka te koyina basusu.

Mokolo mosusu koyinana ekosila mpo na libela!

Nini nde ekosilisa koyina mpo na libela?

Bato oyo bayinami bazali bisika nyonso na mokili mobimba

Ndenge nini ezaleli ya koyina basusu ekoki kosila? Mbongwana ya solosolo ezali kosalema sikoyo na mokili mobimba.