Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mituna oyo bilenge batunaka

Nakoki komizela kokutana na makambo nini na libala?​—Eteni 1

Nakoki komizela kokutana na makambo nini na libala?​—Eteni 1

“Soki tozali esika moko, namonaka lokola nazali na mapata! Nakozela lisusu ntango molai te mpo tóbalana!”

“Ezalaka mpasi makanisi na biso mibale ekokana. Na esika ya kozala mwasi ná mobali, tokómá kaka lokola bato mibale oyo bafandaka ndako moko. Namiyokaka ete nasundolami!”

NDENGE mbala mosusu omoni yango, maloba ya likoló elobamaki na mwana mwasi oyo abali naino te; kasi mwasi ya libala nde alobaki maloba oyo ezali na lobɔkɔ ya mwasi. Nzokande, okoki koyeba te ete kaka moto moko nde alobaki maloba wana nyonso mibale.

Likambo nini ebimaki? Soki okanaka kobala mokolo mosusu, ndenge nini okoki kosala mpo makanisi ya lolango ebongwana te na libala moko ya mindɔndɔ?

Ndenge makambo ezalaka: Kozala na esengo na libala etaleli ndenge oyo omizelaka na yango.

Lisolo oyo mpe masolo mosusu ya “Mituna oyo bilenge batunaka . . .” oyo ekobima na Lamuká! ekosalisa yo omibongisa mpo na makambo oyo okokutana na yango na libala.

Makambo nini mpenza osengeli komizela kokutana na yango na libala? Na mokuse:

  1.  Makambo ya malamu

  2.  Mikakatano

  3.  Makambo oyo ekanami te

Tótalela yango mokomoko.

MAKAMBO YA MALAMU

Biblia elobeli libala na ndenge ya malamu. (Masese 18:22) Talá mwa makambo ya malamu oyo okoki komizela na yango.

Boninga. Biblia elobi ete mwa moke nsima ya kokela Adama, moto ya liboso, Nzambe alobaki boye: “Ezali malamu te moto azala ye moko,” mpe na nsima, akelaki Eva mpo azala moninga na ye. (Ebandeli 2:18) Nzambe akelaki mokomoko na bango na bizaleli oyo ekeseni na mosusu, kasi na likoki ya kozala elongo na bomoko. Na yango, mwasi mpe mobali bazalaka baninga ya malamu.​—Masese 5:18.

Moninga ya kosala na ye. Biblia elobi boye: “Kozala bato mibale po na kosala mosala ezali malamu koleka kozala moto moko. Soki bazali mibale bakoki kolonga na mosala na bango.” (Mosakoli 4:9, Bible na lingala ya lelo oyo) Likambo yango ezali mpenza solo na kati ya libala. Elenge mwasi moko na nkombo Bibiche oyo auti kobala, alobi boye: “Mpo na kosala esika moko esɛngi kozala na komikitisa mpe koyoka makanisi ya moninga soki esengeli.” *

Kosangisa nzoto. Biblia elobi boye: “Mobali apesa mwasi na ye eloko oyo asengeli na yango; kasi mwasi mpe asala ndenge wana epai ya mobali na ye.” (1 Bakorinti 7:3) Soki obali, okoki kosangisa nzoto kozanga komitungisa mpe kokanisa ete okokutana na mpasi oyo eyelaka baoyo basangisaka nzoto liboso ya kobala.​—Masese 7:22, 23; 1 Bakorinti 7:8, 9.

Mpo na kosukisa: Libala ezali likabo euti na Nzambe. (Yakobo 1:17) Soki ondimi toli na ye, okoki komizela kozwa mapamboli mingi na libala.

Makambo osengeli kokanisa: Libala esepelisaka yo te mpo omonaka ete mabala mosusu ezali na mikakatano, ntango mosusu na libota na bino? Soki ezali bongo, bandakisa nini ya malamu okoki kotalela?

MIKAKATANO

Biblia elobi mpe ete libala ezali na mikakatano. (1 Bakorinti 7:28) Talá mwa mikakatano oyo okoki komizela na yango.

Matata. Bato mibale ya kozanga kokoka bakoki kokokana te. (Baroma 3:23) Yango wana, na bantango mosusu mwasi mpe mobali bakoki kozwana matata, ata soki bayokanaka malamu. Na ntango mosusu bakoki koloba makambo ya kosepelisa te mpe koyoka mawa na nsima. Biblia elobi ete: “Soki moto abɛtaka libaku na maloba te, . . . azali moto ya kokoka.” (Yakobo 3:2) Na esika ya kokanisa ete matata ekobima te, babalani oyo bayokanaka malamu bayekolaka nde ndenge ya kosolola malamu mpo na kosilisa matata soki ebimi.

Kolɛmba nzoto. Elenge mwasi moko na nkombo Karine alobi boye: “Bafilme mpe televizyo emonisaka elenge mwasi moko azwi mobali ya ‘kokoka’ mpe bazali na esengo nsima ya libala na bango. Nzokande, soki makambo esalemi te ndenge bafilme mpe televizyo emonisaka, babalani balɛmbaka nzoto. Ya solo, nsima ya kobalana, mwasi mpe mobali bayaka koyeba bizaleli mosusu ya mabe ya moninga oyo ebombanaki. Mpo na kolonga mokakatano yango, esengeli koyeba ete bolingo ya solosolo “eyikaka mpiko na makambo nyonso,” ezala ata kolɛmba nzoto​—1 Bakorinti 13:4, 7.

Mitungisi. Biblia elobi ete baoyo babalá ‘bamitungisaka mpo na makambo ya mokili.’ (1 Bakorinti 7:33, 34) Komitungisa ndenge wana ezali mabe? Te. Na ndakisa, okoki komitungisa mpo na kozwa mbongo ya kobikela. Ekoki kosɛnga ete mwasi mpe mobali básala mosala mpo na kozwa bilei, bilamba, mpe esika ya kofanda. Kasi bokoki kolonga soki bozali kosala na bomoko mpo na kokokisa bamposa ya libota na bino.​—1 Timote 5:8.

Mpo na kosukisa: Libala oyo ezangi mikakatano ezalaka te; kasi okoki kolonga soki osali milende mpenza.

Makambo osengeli kokanisa: Sikoyo, ndenge nini osilisaka matata oyo ebimaka kati na yo mpe baboti to bandeko na yo? Ntango okutani na likambo moko oyo elɛmbisi yo nzoto, otalelaka yango na ndenge ebongi? Osalaka nini mpo na kolonga mitungisi?

LISOLO “MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA” YA MBALA EKOYA EKOZALA NA MOTÓ YA LIKAMBO Ndenge nini mitinda ya Biblia ekoki kosalisa yo omibongisa mpo na makambo oyo ekanami te?

 

^ par. 17 Na lisolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.