Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Kokende mboka mopaya: Oyo bato bakanisaka mpe oyo bakutanaka na yango mpenza

Kokende mboka mopaya: Oyo bato bakanisaka mpe oyo bakutanaka na yango mpenza

Koluka bomoi ya malamu

GEORGE amonaki ete asuki. Azalaki kokoka koleisa libota na ye malamu te. Na ngambo mosusu, bato ya kartye na ye bazalaki kobɛla, mpe basusu bazalaki kokufa nzala. Kasi George ayebaki ete na ekólo mosusu ya pembeni, bato bazalaki na bomoi ya malamu. Yango wana, azwaki likanisi ya kokende koluka mosala na mboka mopaya mpo na nsima abengisa libota na ye.

Patricia mpe azalaki kolɔta bomoi ya malamu na mboka mopaya. Azalaki na mosala te, mpe na ekólo na ye, kotánga kelasi mpe kozala na bomoi ya malamu ezalaki mpasi. Ye ná makango na ye bazwaki ekateli ya kosala mobembo kolongwa Nigeria tii na Algérie mpo na kokóma na Espagne; kozanga koyeba mpasi oyo bato bamonaka mpo na kokatisa esobe ya Sahara. Patricia alobi boye: “Nazalaki na zemi mpe nazalaki na mposa mwana na ngai azala na bomoi ya malamu.”

Rachel azalaki na mposa ya kokende Mpoto mpo na koluka mbongo. Na Philippines, balongolaki ye na mosala, mpe bandeko na ye bayebisaki ye ete na bikólo mosusu, bato mingi balukaka bana ya misala. Yango wana adefaki mbongo mpe afutaki tike ya aviɔ mpe na nsima akabwanaki na mobali mpe mwana na bango ya mwasi mpe alobaki na bango boye: “Tokabwani mpo na libela te.”

Ndenge moko na George, Patricia, mpe Rachel, emonani ete na bambula oyo euti koleka, bato koleka milio 200 bakendaki kofanda na mboka mopaya. Atako bamosusu bakendaki mpo na kokima bitumba, makama minene to minyoko, kasi mingi na bango bakendaki nde mpo na koluka mbongo. Bato yango bakutanaka na makambo nini na mboka mopaya? Bango nyonso bakómaka nde na bomoi ya malamu oyo balukaka? Bana bayokaka ndenge nini soki moboti atiki bango mpo na kokende koluka mbongo? Tótalela biyano na mituna yango.

Ndenge ya kokóma kuna, kozwa ndako mpe mosala

Mokakatano ya liboso ya kokende mboka mopaya ezali mobembo yango moko. George oyo tolobelaki na lisolo ya liboso, atambolaki bakilomɛtrɛ ebele ná biloko moke ya kolya. Alobi boye: “Mobembo yango ezalaki mpasi mpenza.” Bato mingi oyo bakendaka mboka mopaya bakómaka kutu te na esika oyo bakanaki kokende.

Patricia azalaki na mposa ya kokóma na Espagne. Amataki na motuka moko ya polele mpo na kokatisa esobe ya Sahara. Alobi boye: “Tosalaki pɔsɔ mobimba kolongwa Nigeria tii na Algérie, mpe tozalaki bato 25 na motuka yango. Na nzela, tomonaki bibembe ebele ná bato mosusu oyo bazalaki koyengayenga na esobe mpo na kozela liwa. Emonani ete basofɛlɛ mosusu oyo bazanga mawa, basundolaka bato na nzela.”

Na kokesana na George mpe Patricia, Rachel azalaki na likoki ya kofuta tike ya aviɔ mpo na kokende na Mpoto; epai mosala ya ndako ezalaki kozela ye. Kasi ayebaki te ete na nsima, akoyoka mposa makasi ya mwana na ye ya mwasi ya mbula mibale. Alobi boye: “Mbala nyonso oyo nazalaki komona mama moko azali kokipe mwana na ye ya moke, ezalaki kosala ngai mpasi na motema.”

Ezalaki mpasi mpo George amesana na mboka mopaya. Basanza mingi elekaki liboso abanda kotinda mbongo na ndako. Alobi boye: “Mbala mingi na butu, nazalaki kolela, mpo nazalaki komiyoka ngai moko mpe nazalaki kobanga.”

Nsima ya kolekisa basanza mingi na Algérie, Patricia akómaki na ndelo ya Maroc. Alobi boye: “Nabotaki mwana na ngai ya mwasi kuna. Nasengelaki kobombana mpo bato mabe oyo bakangaka basi bapaya na makasi mpo na kokómisa bango bandumba, bamona ngai te. Nsukansuka, nazwaki mwa mbongo mingi ya kokatisa mbu mpo na kokende na Espagne. Masuwa yango ezalaki mabe mpe ezalaki kotambola malamu te mpo etondaki na bato. Tosengelaki kopepa mai oyo ezalaki kokɔta na masuwa na basapato na biso! Ntango tokómaki na Espagne, nazalaki na makasi te ya kotambola na libongo.”

Ya solo, baoyo bazali na mposa ya kokende kofanda na ekólo mosusu basengeli kosuka kaka te na kotalela mikakatano oyo bakoki kokutana na yango na mobembo. Basengeli mpe koyeba mikakatano mosusu oyo bakoki kokutana na yango, na ndakisa koyekola monɔkɔ ya sika mpe komesana na makambo ya mboka yango; ata mpe kozwa mikanda ya leta mpo na kofanda kuna libela. Baoyo bazangi mikanda yango, bazalaka na mokakatano ya kozwa mosala mpe ndako ya malamu, kotánga kelasi to kozwa lisalisi ya malamu ya monganga. Ekoki mpe kozala mpasi bázwa ndingisa ya kokumba motuka to kofungola kɔnti na banki. Likambo ya mabe mpenza, mbala mingi, basalisaka bapaya oyo bazangi mikanda misala makasi mpo na lifuti moke.

Likambo mosusu ya kotalela ezali mbongo yango moko. Osengeli mpenza kotyela yango motema? Biblia epesi toli oyo: “Koboma nzoto te mpo na kozwa bomɛngo. . . . Emisalelaka mapapu lokola oyo ya mpongo mpe epumbwaka mosika na likoló.” (Masese 23:4, 5) Kobosana mpe te ete tozalaka libosoliboso na mposa ya makambo oyo mbongo esombaka te, na ndakisa bolingo, kimya na makanisi mpe bomoko ya libota. Ezali mpenza mawa soki baboti bakómi kozwa mbongo na valɛrɛ mingi koleka bolingo oyo basengeli komoniselana to mpe ‘bolingo ya libota’ oyo basengeli komonisela bana na bango!​—2 Timote 3:1-3.

Bato bakelamá na mposa ya koyeba Nzambe. (Matai 5:3) Yango wana, baboti ya malamu basalaka nyonso mpo na kokokisa mokumba oyo Nzambe apesá bango ya koteya bana na bango makambo ya Nzambe, mokano na ye mpe mibeko na ye.​—Baefese 6:4.

Libota oyo ezali na bomoko​—eleki mbongo na ntina

Ndenge lisolo ya George, Rachel, mpe Patricia oyo tolobelaki emonisi yango, masolo ya bato oyo bakendaka kofanda na mboka mopaya ekoki kokesana, kasi mingi na yango esukaka ndenge moko. Libota mobimba enyokwamaka ntango moboti, mobali to mwasi akei mobembo mpe atiki molongani na ye; mpe ekoki koleka bambula ebele liboso libota esangana lisusu esika moko. Libota ya George esanganaki esika moko nsima ya mbula minei.

Nsukansuka nsima ya mbula soki mitano, Rachel azongaki lisusu na Philippines mpo na kozwa mwana na ye ya mwasi. Patricia oyo akómaki na Espagne ná bebe na ye na mabɔkɔ, alobi boye: “Nasalaka makasi nabatela ye malamu mpo kaka ye nde libota na ngai.”

Bato mingi oyo bakendaka kofanda na mboka mopaya, batikalaka kaka kuna ata soki bazali komiyoka ete bazali bango moko, bazali na mikakatano ya mbongo mpe bakabwani ná libota na bango na boumeli ya bambula mingi. Lokola babimisaka mbongo mingi mpo na kokende mboka mopaya, yango wana, soki makambo etamboli malamu te, bato moke nde bamonaka malamu bázonga mboka na bango ata soki bato bakotyola to bakokitisa lokumu na bango.

Moto moko oyo asalaki bongo ezali Allan, oyo autá na ekólo Philippines. Azwaki mosala moko malamu na Espagne, kasi nsima ya sanza 18, azongaki na ekólo na ye. Alobi boye: “Nazalaki kokanisa mwasi na ngai mpe mwana na ngai makasi. Nazwaki ekateli ete nakosala na mboka mopaya kaka soki tokei libota mobimba. Mpe tosalaki bongo. Libota eleki mbongo na ntina.”

Patricia amonaki mpe ete ezali na eloko mosusu oyo eleki mbongo na ntina. Ntango akómaki na Espagne, azalaki na Biblia “Kondimana ya sika,” to Makomami ya Grɛki ya bokristo. Alobi ete: “Nazalaki kokanisa ete buku yango ekobatela ngai. Na nsima, nakutanaki na mwasi moko Motatoli ya Yehova. Liboso nazalaki kosepela kosolola na Batatoli te. Na yango, natunaki mwasi yango mituna ebele mpo namonisa ye ete mateya na ye ezali lokuta. Kasi namikosaki, mpo ayebaki mpenza kolimbola mateya ya lingomba na ye mpe asalelaki Biblia mpo na koyanola na mituna na ngai.”

Makambo oyo Patricia ayekolaki eteyaki ye ete esengo ya solosolo mpe elikya mpo na mikolo ezali koya etaleli te esika oyo moto afandi to mbongo oyo azali na yango, kasi nde koyeba Nzambe mpe mokano na ye mpo na biso. (Yoane 17:3) Patricia ayekolaki mpe ete nkombo ya Nzambe ya solo ezali Yehova. (Nzembo 83:18) Atángaki mpe na Biblia ete mosika te, Nzambe akosilisa bobola nyonso na nzela ya Bokonzi na ye oyo apesi na mabɔkɔ ya Yesu Kristo. (Danyele 7:13, 14) Mokanda ya Nzembo 72:12, 14 elobi ete: “[Yesu] akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe moto ya mpasi mpe moto nyonso oyo azali na mosungi te. Akosikola molimo na bango na monyoko mpe mobulu.”

Mpo na nini te kozwa ntango ya koyekola Biblia? Buku yango, oyo ezali na bwanya ya Nzambe, ekoki kosalisa yo oyeba makambo oyo eleki ntina na bomoi, ozwa bikateli ya malamu mpe oyikela mikakatano nyonso mpiko na esengo mpe elikya.​—Masese 2:6-9, 20, 21.