LAMUKÁ! Sanza ya Septembre 2013 | Kotomboka nde ebongisaka makambo?

Lisolo oyo elobeli ntina oyo bato bazali kotomboka mingi mpe ndenge oyo likambo yango ekosila.

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Masolo yango ezali na makambo lokola: Ndenge malaria ezongi na Grèce, basi ya Chine oyo babotá kozanga kobala, ndenge basoda bazali komiboma na États-Unis, mpe makambo mosusu

LISALISI MPO NA LIBOTA

Oyo okoki kosala ntango mwana akómi kosala matata

Okoki kosala nini soki mwana na yo azali kosala matata? Batoli ya Biblia ekoki kosalisa yo olonga mokakatano yango.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Kotomboka nde ebongisaka makambo?

Kotomboka ekoki kosala ete makambo ebongwana. Kasi, yango ekoki nde kosilisa kozanga bosembo, kanyaka mpe minyoko?

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Nazalaki komona makambo ya kozanga bosembo bisika nyonso

Mpo na nini elenge mobali moko ya Irlande du Nord, oyo azalaki komikɔtisa na mobulu ya bato oyo bazalaki kotomboka, abongolaki makanisi na ye mpo na ndenge oyo bosembo ya solosolo ekosalema?

MITUNA-LISOLO

Monganga moko oyo asalaka lipaso ya mikuwa alobeli kondima na ye

Doktɛrɛ Irène Hof Laurenceau amonisi ntina oyo akómaki Motatoli ya Yehova.

Osengeli kondima liteya ya Bosato?

Lingomba na yo eteyaka Bosato? Ondimaka mpe mateya ya Nicée?

BIBLIA ELOBI NINI?

Masanga

Talá batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo otalela masanga na ndenge oyo ebongi.

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Nini esalaka ete ndɛkɛ babengi albatros hurleur ebimisa makasi mingi te ntango ezali kopumbwa?

Talá ndenge ndɛkɛ yango ekoki kopumbwa ntango molai kozanga ete ebɛtabɛta mapapu na yango!

Makambo mosusu

Makambo nini nasengeli koyeba mpo na bamesaje?

Bamesaje ekoki kokabola yo ná baninga mpe kobebisa lokumu na yo. Ndenge nini?

Longá matumoli kozanga ete obunda

Luká koyeba mpo na nini batumolaka basusu mpe oyo okoki kosala mpo na kolonga yango.

Yozefe na Ezipito

Ndenge nini okoki kosepelisa Nzambe ata ntango moto moko te azali komona yo? Tángá lisolo oyo ya Biblia mpe zwá liteya na ndakisa ya Yozefe.