LAMUKÁ! Sanza ya Novembre 2014 | Sekele mpo na kozala na bomoi ya esengo

Biblia ezali na batoli oyo ebongi oyo ekoki kosalisa yo ozala na bomoi ya esengo. Talá bandakisa minei oyo emonisi ete ebongi kotyela bwanya ya Biblia motema.

Makambo oyo ezali koleka na mokili

Ezali mpe na masolo oyo: ndenge basundolaki mokano ya kobatela zamba ya ekólo Équateur, mokakatano ya komona mikrobe ya sida na makila mpe kowela nani akobatela banyama oyo babɔkɔlaka na ndako na Australie.

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Sekele mpo na kozala na bomoi ya esengo

Bwanya ya Biblia ekoki mpenza kosalisa yo ozala na bomoi ya esengo? Lisolo oyo emonisi batoli minei ya Biblia oyo esalisaka mpenza.

Banzela ya kolekisa mai oyo Baroma batongaki​—Esalemá na ndenge ya kokamwa mpenza

Mpo na nini na ntango ya kala Baroma batongaki banzela ya kolekisa mai? Nini esalaki ete nzela ya kolekisa mai ezala mpenza ya kokamwisa?

LISALISI MPO NA LIBOTA

Ntango mwana na yo akosi

Osengeli kosala nini soki mwana na yo abuki lokuta? Lisolo oyo elobeli batoli ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo oteya mwana na yo ete koloba solo ezali na ntina.

LISOLO YA BOMOI

Nazwaki elikya na ntango oyo nazalaki mpenza na mposa na yango

Na mbula 20, Miklós Alexa akómaki paralize na aksida moko ya mabe mpenza. Ndenge nini Biblia esalisaki ye azwa elikya kitoko mpo na mikolo ezali koya?

BIBLIA ELOBI NINI?

Bopɛto

Talá toli ya Biblia oyo esalisi bamilio ya bato bakóma na bomoi ya pɛto mpe bázala malamu.

“Elembo moko oyo bato bakoki kobosana ata moke te”

Mpo na nini ndambo ya ndako moko na engumba Hiroshima, na Japon etikalá bongo banda 1945? Tángá makambo etali ndako yango mpe ndenge oyo eyokani na makambo oyo Biblia elaki mpo na mikolo ezali koya.

Makambo mosusu

Bilenge balobelaka makambo etali mbongo

Talá mwa makanisi mpo na ndenge ya kobomba, kosalela mpe kotya mbongo na esika na yango.

Lokasa oyo elobeli Miriame

Miriame abɛtaki miziki na eloko nini? Zwá lokasa oyo mpo oyekola makambo mingi oyo etali ye.