Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BIBLIA ELOBI NINI?

Bampasi

Bampasi

Bato mosusu bakanisaka ete bampasi ya bato eutaka epai ya Nzambe to mpe akipaka bampasi ya bato te. Kasi, Biblia eteyaka nini? Eyano na motuna yango ekoki kokamwisa yo.

Bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe?

“Ya solo, Nzambe asalaka mabe te.”​Yobo 34:12.

OYO BATO BALOBAKA

Bato mosusu balobaka ete likambo nyonso oyo esalemaka ezali mokano ya Nzambe. Yango wana, bamonaka ete bampasi na biso mpe eutaka epai ya Nzambe. Na ndakisa soki makama ebimi, bakanisaka ete makambo yango ezali etumbu oyo Nzambe apesi bato oyo basali lisumu.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia emonisi polele ete bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe te. Na ndakisa, Biblia elobi ete soki tokutani na makambo ya mpasi, tosengeli te koloba ete: ‘Nzambe azali komeka biso.’ Mpo na nini? Mpo “Nzambe akoki komekama na makambo ya mabe te mpe ye moko akoki komeka moto na ndenge wana te.” (Yakobo 1:13) Na maloba mosusu, ata mokakatano to mpasi moko te oyo tokutanaka na yango eutaka epai ya Nzambe. Soki Nzambe nde abimiselaka biso bampasi, yango ekomonisa ete azali mabe, nzokande ye “asalaka mabe te.”​—Yobo 34:12.

Soki bampasi na biso eutaka epai ya Nzambe te, bongo eutaka wapi? Likambo ya mawa, mbala mingi, bato ya kozanga kokoka oyo bazali na bokonzi banyokolaka bato mosusu. (Mosakoli 8:9) Longola yango, bampasi mosusu oyo ekómelaka biso ezalaka “makambo oyo ekanami te;” elingi koloba mpo tozalaki na esika ya mabe na ngonga ya mabe. (Mosakoli 9:11) Biblia emonisi ete bampasi ya bato eutaka libosoliboso epai ya Satana Zabolo, “mokonzi ya mokili oyo,” mpo “mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” (Yoane 12:31; 1 Yoane 5:19) Bampasi eutaka epai ya Nzambe te, kasi nde epai ya Satana.

Nzambe akipaka bampasi na biso?

“Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.”​Yisaya 63:9.

OYO BATO BALOBAKA

Bato mosusu bakanisaka ete Nzambe akipaka bampasi na biso te. Na ndakisa, mokomi moko alobaki ete “emonani ete [Nzambe] azangá mawa mpe akipaka bampasi na biso te.” Mokomi yango alobaki ete soki Nzambe azalaka mpenza, boye “azalaka ata na mawa moke te” mpo na bato.

OYO BIBLIA ELOBI

Biblia emonisi ata na esika moko te ete Nzambe azangá mawa to akipaka bampasi ya bato te; elobi nde ete Nzambe ayokaka mawa mingi mpo na bampasi na biso, mpe ete mosika te akosilisa yango. Talá makambo misato ya esengo oyo Biblia elobeli.

Nzambe ayebi bampasi na biso. Banda bampasi ya bato ebandá, Yehova * amonaka litangá mokomoko ya mai ya miso na biso, mpo miso na ye emonaka makambo nyonso. (Nzembo 11:4; 56:8) Na ndakisa, ntango basaleli na ye ya ntango ya kala bazalaki konyokwama, Nzambe alobaki boye: “Ya solo mpenza, namoni mpasi ya bato na ngai.” Kasi, ayebaki likambo yango kaka likolólikoló? Te, mpamba te abakisaki ete: “Nayebi malamu bampasi oyo bazali komona.” (Kobima 3:7) Koyeba ete Nzambe ayebaka bampasi nyonso oyo ekómelaka biso, ata oyo bato mosusu bayebaka te to bamonaka te, ekitisaka bato ebele motema.​—Nzembo 31:7; Masese 14:10.

Nzambe amityaka na esika na biso ntango tozali na bampasi. Yehova Nzambe asukaka kaka te na koyeba mpasi ya bato, ye mpe ayokaka mpasi yango. Na ndakisa, Nzambe ayokaki mpasi mingi ntango basaleli na ye ya ntango ya kala bazalaki konyokwama. Biblia elobi boye: “Ntango nyonso oyo bazalaki na mpasi, ye mpe azalaki koyoka mpasi.” (Yisaya 63:9) Atako Nzambe azali likoló mpenza koleka bato, amityaka na esika ya baoyo bazali komona mpasi, lokola nde mpasi na bango ezali na motema na ye! Ya solo mpenza “Yehova azali na bolingo mingi ya motema mpe amonisaka motema mawa.” (Yakobo 5:11) Longola yango, Yehova asalisaka biso tóyika mpiko na bampasi na biso.​—Bafilipi 4:12, 13.

Nzambe akosilisa bampasi ya bato. Biblia elobi ete Nzambe akosilisa bampasi ya bato nyonso awa na mabele. Na nzela ya Bokonzi ya likoló, Yehova akobongisa mpenza makambo ya bato awa na mabele. Mpo na ntango yango, Biblia elobi ete Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.” (Emoniseli 21:4) Bongo bato oyo bakufá? Nzambe akozongisa bango na bomoi awa na mabele mpo bango mpe bázala na mokili oyo ezangi bampasi. (Yoane 5:28, 29) Tokobanda kokanisa makambo ya mpasi oyo tokutaná na yango? Te, mpo Yehova alaki ete: “Makambo ya kala ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.”​—Yisaya 65:17. *

^ par. 13 Yehova ezali nkombo ya Nzambe na Biblia.

^ par. 15 Mpo na koyeba ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala mpo na mwa ntango mpe ndenge oyo akosilisa yango, talá mokapo 8 mpe mokapo 11 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.