Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Oyo osengeli koyeba mpo na malaria

Oyo osengeli koyeba mpo na malaria

OMS emonisi ete na 2013, bato koleka milio 198 babɛlaki malaria mpe ebomaki bato soki 584 000. Na bato soki 5 oyo babɛlaki malaria, 4 ezalaki bana oyo bakokisi naino mbula mitano te. Na mokili mobimba, maladi yango ezali likama mpo na bikólo mpe bateritware mingi; ezali kotya bato soki miliare misato na milio mibale na likama.

1 MALARIA EZALI NINI?

Malaria ezali maladi oyo moto azwaka soki mwa nyama moko eswi ye. Eyebanaka na bilembo lokola fiɛvrɛ, kolɛnga, kotɔka, motó mpasi, nzoto mpasi, mposa ya kosanza mpe kosanza. Bilembo yango ekoki kozonga nsima ya mikolo mibale to misato nyonso, na kotalela lolenge ya mwa nyama oyo eswi moto mpe ntango boni moto azwi maladi yango.

2 NDENGE NINI MALARIA EPALANGANAKA?

  1. Mikrobe oyo epesaka malaria; oyo babengi yango plasmodium, ekɔtaka na nzoto ya moto na makila soki ngungi ya mwasi oyo babengaka anophèle eswi moto.

  2. Mikrobe yango ekɔtaka na baselile ya libale (foie) ya moto oyo azwi yango mpe ekómaka ebele.

  3. Ntango baselile yango ekabwani, ebimisaka bamikrobe yango mpe na nsima epalanganaka na baselile ya makila ya moto oyo azwi yango. Bamikrobe yango ekobaka kobakisama kuna.

  4. Ntango baselile ya makila ekabwanaka, ebimisaka bamikrobe yango oyo ekobaka kokɔtela baselile mosusu mingi ya makila.

  5. Baselile ya makila ekobaka kokabwana mpe mikrobe yango ekobaka kokɔtela yango. Moto oyo azwi mikrobe yango amonisaka bilembo ya malaria mbala nyonso oyo baselile ya makila ekabwanaka.

3 NDENGE NINI OKOKI KOMIBATELA?

Soki ofandaka esika oyo malaria ezalaka mingi . . .

  • Salelá mustikɛrɛ. Esengeli ezala

    • oyo batyá nkisi oyo ebomaka banyama mikemike.

    • oyo ezangá lidusu to epasuká te.

    • oyo ekokɔta malamumalamu na nse ya matela.

  • Tyá nkisi oyo ebomaka bangungi na ndako.

  • Soki mwaye ezali, tyá bavitre na bafɛnɛtrɛ mpe baporte mpe salelá baaparɛyi oyo etyaka mopɛpɛ to malili na ndako, yango ekoki kobengana bangungi.

  • Latá bilamba ya langi ya mpɛmbɛ oyo ezipi nzoto mobimba.

  • Soki likoki ezali, boyá bisika oyo matiti ezalaka mingi mpe oyo mai etɛlɛmaka mpo bangungi ebotaka mingi wana.

  • Soki ozwi malaria, luká nokinoki lisalisi ya monganga.

Soki olingi kosala mobembo esika oyo malaria ezalaka mingi . . .

  • Luká koyeba makambo nyonso liboso ya kosala mobembo. Lolenge ya mikrobe oyo epesaka malaria ezalaka ndenge moko te na bisika nyonso mpe yango ekoki kosala ete nkisi boye to boye esimba to te. Lisusu, ekozala malamu osolola ná monganga na yo mpo na makambo oyo osengeli koyeba, oyo etali sante na yo.

  • Na boumeli ya mobembo na yo, landá batoli oyo ezali na lisolo oyo, oyo etali baoyo bafandaka esika malaria ezalaka mingi.

  • Soki ozwi malaria, luká nokinoki lisalisi ya monganga. Yebá ete bilembo ya malaria ekoki komonana nsima ya pɔsɔ moko to minei nsima ya kozwa mikrobe yango.