Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Bifelo ya Itchan Kala na Khiva

MIKILI MPE BATO

Mobembo moko na Ouzbékistan

Mobembo moko na Ouzbékistan

TRANSOXIANE. Mokili oyo ezali na katikati ya bibale, ezalaki kobengama na bankombo mingi; na ndakisa Tartarie, Turkestan kasi babengaka yango lelo Ouzbékistan to “Mokili ya Ba-Ouzbeks.” Na ebandeli mpenza ya siɛklɛ ya 15, bingumba ya Ouzbékistan ezalaki kosalisa bakomelesa oyo bazalaki kotɛka swá básala mibembo na nzela moko ya monene kobanda Chine tii na Mediterane. Lelo oyo bilamba ya coton nde ezalaka mingi na zando ya Ouzbékistan. Batɛkaka mpe batapi ya kitoko oyo basalá na coton, lɛnɛ to swá.

Na boumeli ya basiɛklɛ, bato mingi basalá ete mimeseno ya bato ya Ouzbékistan ebongwana. Bato oyo bayebani mingi mpe basoda na bango oyo bazalaki kobɔtɔla bamboka batambolaki na bangomba mpe bisobe ya Ouzbékistan. Na ndakisa, Alezandre Monene, oyo akutanaki na Roxane mwasi oyo ye abalaki; Gengis Khan, moto ya Mongolie mpe Timur (oyo ayebani mpe na nkombo Tamerlane), mwana-mboka ya etúká yango oyo ayangelaki moko ya baampire oyo elekaki baampire mosusu na monene.

Bilamba ya bonkɔkɔ

Bamonima na yango ya kitoko mpe ya langilangi, oyo ezali na bansamba oyo ezipamá na bakaro ya langi ya bleu esalaka ete Ouzbékistan emonana kitoko. Mingi ya bandako yango ekómá biteyelo.

Nzela ya mombongo ya swá. Bazalaki kutu kosalela nzela yango liboso ya ntango na biso mpe ezalaki nzela oyo bato bazalaki koleka mingi tii ntango nzela ya mai ya mbu efungwamaki na Inde na nsuka ya siɛklɛ ya 15 ya ntango na biso; nzela yango ya mimbongo, oyo ndambo na yango ekatisaki mboka oyo tobengaka lelo Ouzbékistan ezalaki esika oyo bakomelesa ya mokili mobimba bazalaki kosala mimbongo na bango.

Kosala batapi ya swá

Mbu Aral. Mpo na baterase oyo basalaki mpo na kolekisa mai na nzela mosusu, Mbu Aral oyo ezalaki laki ya minei ya monene na mokili mobimba ekómi kokauka. Ouzbékistan ezali koyokana na bikólo mosusu ya Azia ya ntei mpo na kobongisa likambo yango.

Mbongwana ya alfabɛ ya Ouzbékistan. Bato bazalaki koloba minɔkɔ ndenge na ndenge mpe ntango Bamizilma babɔtɔlaki mboka yango na siɛklɛ ya 8, bakómaki koloba monɔkɔ ya Arabe. Ntango ekɔtaki na Union soviétique, bakómaki kosalela liboso alfabɛ ya Latin mpe na nsima alfabɛ cyrillique ezwaki esika na yango na nsuka ya bambula ya 1930. Na 1993, mobeko ya sika ezongisaki alfabɛ Ouzbek, oyo esalelaka ekomeli ya Latin.

Bambuma oyo ekauká likoló ya mesa na zando