Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

NINI EPESAKA ESENGO?

Bolingo

Bolingo

MOTO NYONSO AZALAKA NA MPOSA ETE BÁLINGA YE. Bolingo nde esalaka ete libala, libota, to boninga ezala malamu. Yango wana, tokoki koloba ete bolingo ezali na ntina mingi mpo moto azala na kimya ya makanisi mpe azala na esengo. Kasi “bolingo” ezali mpenza nini?

Bolingo oyo tozali kolobela awa, ezali te lolango to bolingo ya mwasi ná mobali, atako yango mpe ezali na ntina mingi. Oyo tozali kolobela, ezali bolingo oyo eleki bolingo mosusu nyonso, oyo etindaka moto amonisa ete azali koluka bolamu ya basusu, ata soki esɛngi ete azongisa bolamu na ye moko nsima. Ezali bolingo oyo esimbami na mitinda ya Nzambe, atako esɛngaka mpe kozala na boboto mpe kobimisa ndenge ozali komiyoka na motema.

Biblia elimboli bolingo yango na maloba oyo: “Bolingo ezali na motema molai mpe na boboto. Bolingo ezali na zuwa te, emikumisaka te, emivimbisaka na lolendo te, esalaka makambo ya nsɔni te, elukaka matomba na yango moko te, esilikaka te. Ebombaka mabe na motema te. Esepelaka na makambo ya kozanga boyengebene te, kasi esepelaka nde na solo. Ekangaka motema na makambo nyonso, . . . elikyaka makambo nyonso, mpe eyikaka mpiko na makambo nyonso. Bolingo esilaka soki moke te.”​—1 Bakorinti 13:4-8.

Bolingo ya ndenge wana “esilaka soki moke te,” elingi koloba ekokoba kozala. Kutu, wana ntango ezali koleka, ekómaka lisusu makasi. Longola yango, lokola ezali na motema molai, boboto, mpe elimbisaka, ezali “ekanganeli ya kokoka mpo na bomoko.” (Bakolose 3:14) Na yango, boyokani nyonso oyo esimbami na bolingo ya ndenge wana ezalaka makasi mpe epesaka esengo, atako esangisi bato ya kozanga kokoka. Tólobela boyokani moko ya ndenge wana: libala.

“EKANGANELI YA KOKOKA MPO NA BOMOKO” ESANGISI BANGO

Yesu Kristo apesaki batoli ya ntina mingi mpo na libala. Na ndakisa, alobaki: “‘Mobali akotika tata na ye ná mama na ye mpe akokangama na mwasi na ye, mpe bango mibale bakozala mosuni moko’ . . . Yango wana, oyo Nzambe akangisi esika moko moto akabola yango te.” (Matai 19:5, 6) Bavɛrsɛ yango ebimisi batoli mibale ya ntina.

“BANGO MIBALE BAKOZALA MOSUNI MOKO.” Libala ezali boyokani oyo ekómisaka bato mibale pene koleka boyokani mosusu nyonso. Bolingo nde esalaka ete mwasi azala sembo epai ya mobali na ye mpe mobali azala sembo epai ya mwasi na ye. Soki moko na bango alingani na moto mosusu, ezali lokola nde akómi “nzoto moko” ná moto mosusu oyo azali molongani na ye te. (1 Bakorinti 6:16; Baebre 13:4) Kozanga bosembo na libala esalaka ete mwasi ná mobali bátyelana lisusu motema te mpe ekoki kobebisa libala. Soki bazali na bana, likambo yango ekoki mpenza konyokola bana yango na makanisi, mpe bakomona ete baboti balingaka bango te, bakomiyoka ete bazangi libateli, mpe bakoki ata kokangela baboti nkanda na motema.

“OYO NZAMBE AKANGISI ESIKA MOKO.” Libala ezali mosantu. Mwasi ná mobali oyo bayebi bongo basalaka makasi mpo libala na bango ezala ntango nyonso malamu. Balukaka te kokabwana to koboma libala soki mikakatano ebimi. Balinganaka makasi mpe bayebaka kokanga motema. Bolingo ya ndenge wana “ekangaka motema na makambo nyonso,” elingi koloba esalisaka babalani básilisa matata mpo na kobatela kimya mpe boyokani malamu na kati ya libala.

Soki baboti bazali na bolingo ya ndenge wana, oyo elukaka matomba ya basusu, bana na bango bakozwela yango matomba mingi. Elenge mwasi moko nkombo na ye Jessica alobi: “Tata ná mama balinganaka mingi mpe bamoniselanaka limemya. Komona ndenge mama amemyaka tata, mingimingi ntango tata apesi biso disiplini, etindaka ngai naluka kozala lokola ye.”

Bolingo ezali ezaleli ya Nzambe oyo eleki monene. Kutu, Biblia elobi ete: “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Yango wana, tokoki kokamwa te soki Yehova abengami mpe “Nzambe ya esengo.” (1 Timote 1:11) Biso mpe tokozala na esengo soki tosali makasi tómekola bizaleli ya Mozalisi na biso, mingimingi bolingo. Baefese 5:1, 2 elobi: “Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo, mpe bókoba kotambola na kati ya bolingo.”