Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Mposo ya mbɛmbɛ

Mposo ya mbɛmbɛ

MPOSO ya mbɛmbɛ esalisaka mbɛmbɛ emibatela ata soki ezali na esika nini to ekutani na makama ya ndenge nini na nse ya mai. Likoki oyo mposo ya mbɛmbɛ ezalaka na yango ya kobatela mbɛmbɛ etindaki ba-ingénieur báyekola mposo yango mpe ndenge oyo esalemá mpo na kosala mituka mpe bandako oyo ekoki kobatela malamumalamu bato oyo bazali na kati.

Kanisá naino: Ba-ingénieur bayekolaki mitindo mibale ya mposo ya mbɛmbɛ: oyo ya masusamasusa mpe oyo elingamálingamá.

Bamonaki ete na mposo ya mbɛmbɛ oyo ezalaka masusamasusa, milɔngɔ na yango ezalaki kokende kokutana na nsɔngɛ mpe na nsuka ya mposo yango. Kasi na mposo ya mbɛmbɛ oyo elingamálingamá, milɔngɔ na yango ezalaki kokutana na ebandeli mpe na nsuka. Mitindo nyonso mibale wana ya mposo ya mbɛmbɛ ezalaki makasi na bisika oyo ekutaná; yango nde esalaka ete ata soki mposo yango ebukani, mbɛmbɛ ebatelama malamu.

Ntango bato oyo basalaka bolukiluki bafinaki makasi mposo ya mbɛmbɛ ya solosolo ná bamposo ya mbɛmbɛ oyo basalaki kosala, emonanaki ete mposo ya mbɛmbɛ ya solosolo ezalaki makasi koleka mposo oyo bango basalaki, mpo makasi ya mposo ya mbɛmbɛ ya solosolo eutaka na bisika oyo milɔngɔ na yango ekutaná, kasi oyo bango basalaki ezalaki na milɔngɔ te.

Na kotalela bolukiluki yango, zulunalo moko (Scientific American) elobi boye: “Soki mokolo mosusu esalemi ete tótambwisa mituka oyo ezali lokola mposo ya mbɛmbɛ, ekozala mituka ya kitoko koleka mpe ekobatela bato oyo bazali na kati.”

Okanisi nini? Mposo ya mbɛmbɛ, ebimá kaka yango moko, to basalaki yango kosala?