Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Bansingansinga ya mbɛmbɛ ya mai oyo babengi moule

Bansingansinga ya mbɛmbɛ ya mai oyo babengi moule

MBƐMBƐ oyo babengi moule ekangamaka na mabanga, na nzete to na nse ya masuwa ndenge banyama mosusu oyo ezalaka lokola sanya to kosakosa esalaka. Kasi na kokesana na banyama yango oyo ekangamaka makasi na eloko moko, moule esalelaka nde bansinga na yango ya mikemike mpo na kokangama na eloko. Atako bansinga yango esalaka ete moule ezala na mokakatano te mpo na kolya mpe kokende bisika mosusu, kasi emonanaka lokola ete ekokoka mbonge ya mbu te mpo bansinga yango ezalaka pɛtɛpɛtɛ. Kasi ndenge nini bansinga yango esalisaka moule ekangama na eloko mpe mbonge ya mbu emema yango te?

Kanisá naino: Eteni ya nsinga oyo ekangani na nzoto na yango ezalaka pɛtɛpɛtɛ mpe ebendanaka kasi eteni oyo ekangaka eloko ezalaka makasi. Bato ya mayele bamoni ete lokola eteni molai ya bansinga yango (80 %) ezalaka makasi mpe kaka eteni moke (20 %) nde ezalaka pɛtɛpɛtɛ, yango nde esalaka ete mwa nyama yango ekangama makasi mpenza na eloko moko. Yango wana, bansinga yango ekangamaka makasi na eloko ata soki mbonge ebɛti yango makasi.

Profesɛrɛ Guy Genin alobi ete yango ekamwisaka mpenza; abakisi boye: “Sekele ya mwa nyama yango euti na ndenge eteni oyo ezali makasi esalaka na boyokani na eteni oyo ezali pɛtɛpɛtɛ.” Bato ya mayele bakanisi ete ndenge oyo bansinga yango ezalaka ekoki kosalisa bango básala bisaleli ya kokangisa biloko ya kotonga bandako, bamasuwa ya nse ya mai, kokangisa mikuwa ná misisa ya minene mpe kokanga mpota ya lipaso. Profesɛrɛ Herbert Waite na iniversite ya Californie na Santa Barbara, États-Unis, alobi boye: “Mokili etondi na ebele ya biloko ya kokamwa oyo ekoki koteya biso makambo mingi etali ndenge ya kosala kole.”

Okanisi nini? Bansingansinga ya mbɛmbɛ ya mai oyo babengi moule ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?