LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Mars 2017

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 01-28/05/2017.

LISOLO YA BOMOI

Kotambola na bato ya bwanya ememeli ngai mapamboli mingi

Na boumeli ya ebele ya bambula oyo William Samuelson alekisi na mosala ya ntango nyonso, akutanaki na makambo ya esengo mpe ya mpasi.

Pesáká lokumu na baoyo babongi na yango

Banani babongi na lokumu, mpe mpo na nini? Matomba nini okozwa soki ozali kopesa bango lokumu?

Zalá na kondima mpe zwáká bikateli na bwanya!

Bikateli mosusu oyo ozwaka ekoki komemela ya makama. Nini ekoki kosalisa yo ozwaka bikateli na bwanya?

Salelá Yehova na motema mobimba!

Bakonzi ya Yuda: Asa, Yehoshafate, Hizikiya, mpe Yosiya: bango nyonso basalaki mabunga. Atako bongo, Nzambe atalelaki bango lokola bato oyo basalelaki ye na motema mobimba. Mpo na nini?

Okotya motema na yo na makambo oyo ekomamá?

Okoki kozwa mateya ya ntina mingi na mabunga ya basusu, ezala mabunga oyo Biblia elobeli.

Kobatela boninga ntango boninga yango ezali na likama

Ekoki kozala na ntango moko oyo moninga na yo oyo asengeli na lisalisi mpo azongisa boyokani malamu na Yehova. Ndenge nini okoki kosalisa ye?

Nkombo moko ya Biblia na elokó moko ya kala

Biteni mikemike ya elokó moko oyo esalemi na mabele ya lima oyo eumeli mbula 3000 emonanaki na mobu 2012, ebendi mpenza likebi ya bato oyo basalaka bolukiluki. Nini esali ete ezala na motuya mingi?