Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Nzambe alaki ete tokozala na makanisi ya kokoka

Nzambe alaki ete tokozala na makanisi ya kokoka

Na kati ya Biblia, Nzambe apesi batoli mpe libɔndisi oyo ekoki kosalisa bato oyo bazali kobɛla na makanisi.

Kasi Nzambe asali mingi koleka wana. Alaki ete akolongola mpo na libela makambo nyonso oyo esalaka ete tónyokwama na makanisi.

Ntango Nzambe akokokisa elaka yango; konyokwama na makanisi, koyoka mpasi na makanisi mpe basuvenire oyo epesaka mpasi “ekokanisama lisusu te, mpe ekoya na motema te.”​—Yisaya 65:17.

Batatoli ya Yehova bakosepela kosalisa yo omona ntango mpe ndenge oyo bilaka yango ya kolendisa oyo Nzambe alaki ekokokisama.