LINƆ́NGI YA MOSƐNZƐLI—NIMERO YA BOYEKOLI Sanza ya Décembre 2016

Nimero oyo ezali na masolo ya boyekoli mpo na 30/01 tii na 26/02/2017.

LISOLO YA BOMOI

Nakómaki “makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso”

Mikumba ndenge na ndenge oyo ndeko Denton Hopkinson azwaki na boumeli ya bambula esalisaki ye amona ndenge oyo Yehova alingaka bato ya ndenge nyonso.

Tosikolami na nzela ya boboto monene

Okoki kozwa mapamboli mingi soki otaleli ndenge oyo Yehova asikolaki yo na lisumu.

“Kokanisa na elimo elakisi bomoi mpe kimya”

Baroma mokapo 8 epesi toli oyo ekosalisa yo ozwa mbano oyo Yehova alaki kopesa bato nyonso.

Ozali koyeba lisusu?

Otángaki na likebi banimero ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo euti kobima? Talá soki okoki koyanola na mituna boni ya Biblia.

Bwakelá Yehova mitungisi na yo nyonso

Ntango mosusu, basaleli ya Nzambe bamitungisaka. Ezali na makambo minei oyo okoki kosala mpo esalisa yo ozala na “kimya ya Nzambe.”

Yehova apesaka mbano na baoyo bazali koluka ye na mposa makasi

Ndenge nini elikya ya mbano oyo Yehova alaki epesaka biso matomba? Ndenge nini apesaki basaleli na ye na ntango ya kala mbano, mpe ndenge nini azali kosala yango sikoyo?

Ezaleli ya boboto emonisaka bwanya

Ezalaka pɛtɛɛ te kokanga motema ntango basaleli yo makambo na bosembo te, kasi Biblia elendisaka bakristo bázala na boboto. Nini ekoki kosalisa yo omonisa ezaleli wana oyo esepelisaka Nzambe?

Index ya masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 2016

Liste ya masolo ndenge na ndenge oyo ebimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bato nyonso mpe ya boyekoli.