Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Teyá bana na yo

Ntina oyo bato balingaki Dorkasi

Ntina oyo bato balingaki Dorkasi

BISO nyonso tosepelaka ete bato bálinga biso. Yo mpe oyokaka bongo? * Biblia elobeli Dorkasi, mwasi moko oyo bato mingi balingaki mpenza.

Dorkasi azalaki kofanda na Yope, engumba moko oyo ezalaki pene na Mbu ya Mediterane. Kolongwa Yope tii Yerusaleme ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 56. Dorkasi azalaki moko ya bayekoli ya liboso ya Yesu.

Okanisi ete bato bazalaki kolinga Dorkasi mingi mpo na nini?— Ya solo, Biblia elobi ete asalaki makambo mingi ya malamu mpe azalaki kopesa makabo ya kitoko mpenza. Emonani lokola azalaki kotongela basi oyo mibali bakufá bilamba ya kitoko. Ayebisaki mpe bato mingi makambo etali Yehova Nzambe ya solo, ndenge kaka Yesu asalaki.

Oyebi likambo mabe oyo ekómelaki Dorkasi?— Abɛlaki makasi mpe akufaki. Baninga na ye nyonso bazalaki na mawa. Na yango, batindaki bato na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 16, epai ntoma Petro azalaki kofanda. Bato yango basɛngaki ye aya noki. Ntango Petro akómaki, amataki na shambrɛ ya likoló epai batyaki nzoto ya Dorkasi. Basi nyonso bazalaki kolela, mpe balakisaki ye bilamba oyo Dorkasi atongelaki bango.

Na nsima, Petro ayebisaki moto nyonso abima libándá. Petro ná bantoma mosusu basalaki makamwisi liboso, kasi ata moko te kati na bango asekwisaki moto. Okanisi ete Petro akosala nini sikoyo?

Petro afukamaki pene na nzoto ya mowei mpe abondelaki Yehova. Na nsima, alobaki na Dorkasi ete atɛlɛma. Dorkasi mpe atɛlɛmaki! Petro apesaki ye lobɔkɔ na ye mpe asalisaki ye mpo atɛlɛma. Na nsima, abengaki basi wana oyo mibali bakufá mpe bato mosusu mpe alakisaki bango Dorkasi. Okoki kokanisa esengo oyo bazalaki na yango?

Tókanisa sikoyo liteya oyo okoki kozwa na lisolo wana ya lisekwa ya Dorkasi. Likambo moko oyo lisolo yango emonisi ezali ete soki osalisaka basusu, mingi kati na bato yango bakolinga yo. Kasi, likambo eleki ntina, Nzambe akobosana yo te mpe akolinga yo. Akobosana soki moke te makambo ya malamu oyo ozali kosalela basusu. Mpe akopesa yo bomoi ya seko mpe ya esengo na mokili ya sika.

Tángá na Biblia na yo

^ par. 3 Soki ozali kotánga na mwana na yo mpe omoni mwa mokɔlɔtɔ oyo (—) na nsima ya motuna, osengeli kopema mpe kosɛnga na mwana abimisa makanisi na ye.