Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | NZAMBE ATYELAKA YO LIKEBI?

Nzambe azali kobenda yo

Nzambe azali kobenda yo

“Moto moko te akoki koya epai na ngai soki Tata, oyo atindaki ngai, abendi ye te.”​—YOANE 6:44.

MPO NA NINI BATO MOSUSU BATYAKA NTEMBE? Bato mingi oyo bandimelaka Nzambe bamonaka ete azali mosika na bango. Christina, mwasi moko ya ekólo Irlande oyo azalaki kokende eglize pɔsɔ nyonso, alobi boye: “Nazalaki komona ye kaka lokola Nzambe oyo akelá biloko nyonso. Kasi nayebaki ye te. Ata mokolo moko te namiyoká penepene na ye.”

OYO LILOBA YA NZAMBE ETEYAKA: Ntango tomonaka ete tozangi elikya, Yehova asundolaka biso te. Yesu apesaki ndakisa oyo mpo na komonisa ndenge oyo Nzambe atyelaka biso likebi: “Soki moto moko azali na bampate nkama moko (100) mpe moko na yango ebungi, akotika ntuku libwa na libwa (99) na bangomba mpe akokende koluka oyo ebungi, boye te?” Apesaki liteya oyo: “Ndenge moko mpe Tata na ngai oyo azali na likoló alingaka te ete moko ya bato mike oyo abeba.”​—Matai 18:12-14.

Mokomoko “ya bato mike oyo” azali na valɛrɛ mingi na miso ya Nzambe. Ndenge nini Nzambe ‘alukaka oyo abungi’? Vɛrsɛ oyo totángaki na ebandeli elobi ete Yehova abendaka bato epai na ye.

Lelo oyo, banani bakendaka na bandako ya bato mpe na bisika oyo bato bazalaka mingi mpo na koyebisa bango nsango ya Biblia oyo etali Nzambe?

Tótala oyo Nzambe asalaki mpo na kobenda bato ya mitema sembo epai na ye. Na siɛklɛ ya liboso ya ntango na biso, Nzambe atindaki Filipe, moyekoli ya Yesu akende kokutana na mokonzi moko ya Etiopi mpo na kosalisa ye akanga ntina ya esakweli moko ya Biblia oyo azalaki kotánga. (Misala 8:26-39) Na nsima, Nzambe atindaki ntoma Petro akende na ndako ya Korneyi, mokonzi moko ya basoda ya Roma, oyo azalaki moto oyo amipesá na losambo mpe azalaki kobanga Nzambe. (Misala 10:1-48) Nzambe atindaki mpe ntoma Paulo mpe baninga na ye pene ya ebale na libándá ya engumba ya Filipi. Kuna bakutanaki na mwasi moko na nkombo Lidia “mosambeli ya Nzambe” mpe “Yehova afungolaki motema na ye mpo atya likebi.”​—Misala 16:9-15.

Na bandakisa yango mokomoko, Yehova asalaki ete baoyo bazalaki koluka ye bázwa libaku ya koyeba ye. Lelo oyo, banani bakendaka na bandako ya bato mpe na bisika oyo bato bazalaka mingi mpo na koyebisa bango nsango ya Biblia oyo etali Nzambe? Bato mingi bakoki koyanola, “Batatoli ya Yehova.” Omituna boye: ‘Ekoki kozala te ete Nzambe azali kosalela bango mpo na kobenda ngai?’ Tosɛngi yo obondela Nzambe asalisa yo mpo milende oyo azali kosala mpo na kobenda yo elonga. *

^ par. 8 Mpo na koyeba makambo mosusu, talá video Mpo na nini koyekola Biblia? na www.mt711.com.