Mokanda ya mibale ya Petro 1:1-21

  • Mbote (1)

  • Bóbatela kobengama na bino (2-15)

    • Bizaleli ya kobakisa na kondima (5-9)

  • Liloba ya esakweli ekómi kotyelama motema mingi koleka (16-21)

1  Simo Petro, moombo mpe ntoma ya Yesu Kristo, epai ya baoyo bazwi kondima oyo ezali na motuya kaka lokola oyo ya biso,* na nzela ya bosembo ya Nzambe na biso mpe ya Mobikisi Yesu Kristo:  Tiká ete boboto monene mpe kimya ebakisama epai na bino na nzela ya boyebi ya solosolo+ ya Nzambe mpe ya Yesu Nkolo na biso,  mpo nguya na ye ya bonzambe epesi biso* biloko nyonso oyo esalisaka na bomoi mpe na ezaleli ya kokangama na Nzambe na nzela ya boyebi ya solosolo ya Moto oyo abengaki biso+ na nzela ya nkembo na ye moko mpe na bizaleli malamu na ye.  Na nzela na yango, lokola tokimi makambo mabe ya mokili oyo euti na bamposa ya mabe,* apesi biso* bilaka ya motuya mpe ya minene mpenza,+ mpo ete na nzela na yango bókóma na lolenge ya Nzambe.+  Mpo na ntina yango nde, bósala makasi mpenza+ mpo bóbakisa na kondima na bino bizaleli malamu,+ na bizaleli malamu na bino boyebi,+  na boyebi na bino komipekisa, na komipekisa na bino+ ezaleli ya koyika mpiko, na ezaleli na bino ya koyika mpiko ezaleli ya kokangama na Nzambe,+  na ezaleli na bino ya kokangama na Nzambe bolingo ya bondeko, na bolingo na bino ya bondeko bolingo.+  Mpo soki bozali na bizaleli wana mpe botondi na yango, ekopekisa bino kozala bato oyo basalaka mosala te to bato oyo babotaka mbuma te+ na oyo etali boyebi ya solosolo ya Nkolo na biso Yesu Kristo.  Mpo moto nyonso oyo azali na bizaleli wana te azali moto oyo akufá miso, akangi miso na ye liboso ya pole,*+ mpe abosani ete apɛtolamaki na masumu na ye+ ya kala. 10  Yango wana bandeko, bósala lisusu makasi mingi mpo bóbatela kobengama na bino+ mpe koponama na bino, mpo soki bokobi kosala makambo wana bokokwea ata moke te.+ 11  Kutu, na ndenge wana nde bakopesa bino mpenza nzela ya kokɔta na Bokonzi ya seko+ ya Nkolo mpe Mobikisi na biso Yesu Kristo.+ 12  Yango wana nalingaka ntango nyonso kokundwela bino makambo wana, atako boyebi yango mpe bopikami makasi na solo oyo ezali kati na bino. 13  Kasi namoni ete ezali malamu, ntango nyonso oyo nazali naino na tabernakle oyo,*+ nalamwisaka bino na nzela ya makundoli,+ 14  mpo nayebi ete etikali moke tabernakle na ngai elongolama, ndenge Nkolo na biso Yesu Kristo mpe amonisaki ngai yango polele.+ 15  Nakosala ntango nyonso oyo ekoki na ngai mpo ete nsima ya kokende na ngai, bino bókoka kokanisa* makambo yango. 16  Ya solo, ezali te mpo tolandaki masapo ya lokuta oyo esalemi na mayele ya bato nde tolakisaki bino nguya mpe kozala ya Nkolo na biso Yesu Kristo, kasi ezali mpo tomonaki bonene na ye na miso na biso moko.+ 17  Mpo azwaki lokumu mpe nkembo epai ya Nzambe Tata, ntango maloba oyo* eyaki tii epai na ye na nkembo monene: “Oyo azali Mwana na ngai, ya bolingo, oyo ngai moko nandimi.”+ 18  Ɛɛ, maloba wana toyokaki yango euti na likoló ntango tozalaki elongo na ye na ngomba mosantu. 19  Boye liloba ya esakweli ekómi kotyelama motema mingi koleka, mpe bozali kosala malamu na ndenge bozali kotyela yango likebi lokola na mwinda+ oyo ezali kongɛnga na esika moko ya molili (tii ntɔngɔ ekotana mpe monzoto moko ya ntɔngɔ+ ekobima) na mitema na bino. 20  Mpo boyebi libosoliboso ete esakweli moko te ya Likomami euti na ndimbola moko boye ya moto. 21  Mpo esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto,+ kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda* bango.+

Maloba na nse

To, “kondima oyo ezali libaku kitoko lokola oyo ya biso.”
To, “epesi biso na motema mobimba.”
To, “bamposa makasi.”
To, “apesi biso na motema mobima.”
To mbala mosusu, “azali moto oyo akufá miso, amonaka malamu te.”
To, “hema,” elingi koloba, nzoto na ye ya mosuni.
To, “kolobela.”
Lil., “mongongo oyo.”
Lil., “komema.”