Epai ya Baroma 13:1-14

  • Kotosa bakonzi (1-7)

    • Kofuta mpako (6, 7)

  • Bolingo ezali kokokisa Mobeko (8-10)

  • Tómitambwisa lokola bato oyo bazali kosala makambo na moi (11-14)

13  Tiká moto nyonso* atosaka bakonzi oyo bazali liboso,+ mpo bokonzi ekoki kozala te soki Nzambe atikeli yango nzela te;+ bokonzi na bango ezali na ndelo oyo Nzambe atyá.+  Yango wana, moto oyo azali kotɛmɛla bokonzi atɛmɛli ebongiseli ya Nzambe; baoyo batɛmɛli yango bakozwa etumbu.  Mpo bato oyo babangaka bakonzi yango, ezali te baoyo basalaka malamu, kasi nde baoyo basalaka mabe.+ Bongo yo olingi te kobanga bakonzi? Kobá kosala malamu+ mpe bakokumisa yo;  bazali basaleli ya Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala oyo ezali mabe, ozali na ntina ya kobanga. Bazali na lotomo mpe na nguya ya kopesa etumbu epai ya baoyo bazali kosala mabe. Bazali basali ya Nzambe mpo na kopesa etumbu na moto oyo azali kosala mabe.  Yango wana, bosengeli mpenza kotosa bango, kaka mpo na nkanda wana te kasi mpe mpo na lisosoli na bino.+  Yango wana bozali mpe kofuta mpako; mpo bazali basaleli ya Nzambe mpo na bolamu ya bato nyonso, bazali kosala ntango nyonso mpo na ntina wana mpenza.  Bosengeli kopesa moto nyonso oyo esengeli na ye: oyo asɛngi mpako, mpako;+ oyo asɛngi lifuti, lifuti; oyo asɛngi bábanga ye, bóbanga ye;+ oyo asɛngi lokumu, lokumu.+  Bózala na nyongo ya moto te, longola kaka nyongo ya kolingana;+ mpo moto oyo azali kolinga moninga na ye akokisi mobeko.+  Mpo mibeko elobi ete: “Osengeli kosala ekobo te,+ osengeli koboma moto te,+ osengeli koyiba te,+ osengeli kolula eloko ya moto te,”+ mpe mobeko mosusu nyonso etángami na mokuse na maloba oyo: “Osengeli kolinga mozalani na yo lokola yo moko.”+ 10  Bolingo esalaka moto mabe te;+ yango wana, bolingo ezali nde kokokisama ya mibeko.+ 11  Bosengeli kosala bongo mpo boyebi ete ntango ekoki mpo bólamuka na mpɔngi,+ mpo sikoyo lobiko na biso ekómi pene mpenza koleka ntango oyo tokómaki bandimi. 12  Butu epusani mpenza; ntɔngɔ ekómi pene. Yango wana, tólongola misala ya molili+ mpe tólata bibundeli ya pole.+ 13  Tómitambwisa na ndenge oyo ebongi mpenza+ lokola bato oyo bazali kosala makambo na moi: tóboya bafɛti ya lokoso, milangwa, misala mabe ya kosangisa nzoto, etamboli ya nsɔni na nko,*+ koswana mpe zuwa.+ 14  Kasi bólata nde Nkolo Yesu Kristo,+ mpe bókanaka te ndenge ya kokokisa bamposa ya nzoto.+

Maloba na nse

To, “molimo nyonso.”
Na Grɛki, asélgéïa. Talá Ndimbola ya maloba.