Malaki 3:1-18

  • Nkolo ya solosolo ayei kopɛtola tempelo na ye (1-5)

    • Momemi-nsango ya kondimana (1)

  • Balendisi bato bázongela Yehova (6-12)

    • Yehova abongwanaka te (6)

    • “Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino” (7)

    • ‘Bómema dime nyonso, mpe Yehova akosopela bino mapamboli’ (10)

  • Moto ya sembo mpe moto mabe (13-18)

    • Buku moko ya kokanisama ekomami liboso ya Nzambe (16)

    • Bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe (18)

3  “Talá! Nazali kotinda momemi-nsango na ngai, mpe akobongisa nzela liboso na ngai.+ Mpe na pwasa, Nkolo ya solosolo, oyo bozali koluka, akoya na tempelo na ye;+ mpe momemi-nsango ya kondimana akoya, oyo bozali kozela na esengo. Talá! Akoya mpenza,” Yehova ya mampinga alobi bongo.  “Kasi nani akoyikela mokolo ya koya na ye mpiko, mpe nani akokoka kotɛlɛma ntango ye akomonana? Mpo akozala lokola mɔtɔ ya moto oyo anyangwisaka bibende mpe lokola sabuni+ ya bato oyo basukolaka bilamba.  Mpe akofanda lokola moto oyo anyangwisaka mpe apɛtolaka palata+ mpe akopɛtola bana ya Levi; mpe akokómisa bango pɛto lokola wolo mpe lokola palata, mpe bakokóma mpenza mpo na Yehova bato oyo bazali kopesa likabo na bosembo.  Mpe likabo ya Yuda mpe ya Yerusaleme ekosepelisa mpenza Yehova, lokola na mikolo ya kalakala mpe lokola na ntango ya kala.+  “Nakoya epai na bino mpo na kosambisa bino, mpe nakokatela nokinoki bato oyo etumbu: banganga-nkisi,+ bato ya ekobo, bato oyo balapaka ndai ya lokuta,+ bato oyo babubaka moto ya mosala,+ mwasi oyo mobali akufá, mwana oyo tata akufá,*+ mpe baoyo baboyaka kosalisa mopaya.*+ Baoyo wana babangi ngai te,” Yehova ya mampinga alobi bongo.  “Mpo ngai nazali Yehova; nabongwanaka te.*+ Mpe bino bozali bana ya Yakobo; bosili naino te.  Banda na mikolo ya bankɔkɔ na bino botikaki malako na ngai mpe botosaki yango te.+ Bózongela ngai, mpe ngai nakozongela bino,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo. Kasi bozali kotuna: “Tokozongela yo ndenge nini?”  “Moto akoki nde koyiba Nzambe? Kasi bino bozali koyiba ngai.” Mpe bozali kotuna: “Ndenge nini toyibi yo?” “Na ndenge bozali koboya kopesa moko ya bandambo zomi* mpe makabo.  Bolakelami mpenza mabe,* mpo bozali koyiba ngai, ɛɛ ekólo mobimba ezali koyiba ngai. 10  Bómema moko ya bandambo zomi* nyonso na ndako ya kobomba biloko,+ mpo bilei ezala na ndako na ngai;+ mpe nabondeli bino, bómeka ngai na likambo yango,” Yehova ya mampinga alobi bongo, “mpo bómona soki nakofungwela bino te baporte ya mai ya likoló+ mpe soki nakosopela* bino lipamboli te tii bokozanga lisusu eloko te.”+ 11  “Mpe nakopamela mpo na bino mobebisi,* mpe akosilisa te mbuma ya ekólo na bino, mpe nzete ya vinyo na bilanga na bino ekozanga te kobota mbuma,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo. 12  “Bato ya bikólo nyonso bakoloba ete bozali bato ya esengo,+ mpo bokokóma ekólo moko ya kosepelisa,” Yehova ya mampinga alobi bongo. 13  “Maloba na bino mpo na kotɛmɛla ngai ezali makasi,” Yehova alobi bongo. Mpe bozali kotuna: “Maloba nini tolobani kati na biso mpo na kotɛmɛla yo?”+ 14  “Bozali koloba: ‘Kosalela Nzambe ezali na ntina te.+ Litomba nini tozwi ndenge tozali kokokisa mikumba na biso epai na ye, mpe ndenge tozali kotambola mawamawa liboso ya Yehova ya mampinga? 15  Sikoyo, tozali koloba ete bato ya lofundo bazali bato ya esengo. Lisusu, baoyo bamipesá na kosala mabe bazali kolonga.+ Bazali kotya Nzambe na komekama, mpe bazali kolonga kaka.’” 16  Na ntango yango, baoyo babangaka Yehova balobanaki, moto na moto na moninga na ye, mpe Yehova azalaki se kotya likebi mpe koyoka. Mpe buku moko ya kokanisama ekomamaki liboso na ye+ mpo na baoyo babangaka Yehova mpe mpo na baoyo bamanyolaka* nkombo na ye.+ 17  “Mokolo oyo nakobimisa eloko moko ya motuya,”+ Yehova ya mampinga alobi bongo, “bakozala bato na ngai mpenza.+ Nakoyokela bango mawa, kaka ndenge moto ayokelaka mwana na ye oyo azali kosalela ye mawa.+ 18  Mpe bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe,+ kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka ye te.”

Maloba na nse

To, “mwana etike.”
To, “baoyo bapimelaka mopaya lotomo na ye.”
To, “nabongwani te.”
To, “dime.”
To mbala mosusu, “Bozali kolakela ngai mabe na elakeli mabe.”
Lil., “nakosilisela.”
To, “dime.”
Emonani ete ezali banyama mikemike oyo ebebisaka milona.
To, “bakanisaka na mozindo.” To mbala mosusu, “bazwaka na motuya.”