Masese 15:1-33

  • “Eyano ya boboto ekitisaka nkanda” (1)

  • “Miso ya Yehova emonaka eloko nyonso” (3)

  • Libondeli ya bato oyo bazangi mbeba esepelisaka Nzambe (8)

  • “Makambo elongaka te soki toli ezali te” (22)

  • Manyolá liboso ya koyanola (28)

15  Eyano ya boboto ekitisaka nkanda makasi,+Kasi liloba oyo epesaka mpasi ematisaka nkanda.+   Lolemo ya bato ya bwanya esalelaka boyebi na ndenge ya malamu,+Kasi monɔkɔ ya bazoba elobaka makambo ezangá ntina.   Miso ya Yehova emonaka eloko nyonso,Ezali kotala bato mabe ná bato malamu.+   Lolemo ya kimya* ezali nzete ya bomoi,+Kasi maloba ya bokosi elɛmbisaka nzoto.*   Zoba atyolaka disiplini ya tata na ye,+Kasi moto ya ekɛngɛ andimaka kosembolama.*+   Na ndako ya moto ya sembo, biloko ya motuya ezalaka ebele,Kasi lifuti* ya moto mabe ememelaka ye mpasi.+   Monɔkɔ ya bato ya bwanya epalanganisaka boyebi,+Kasi motema ya bazobaezali bongo te.+   Mbeka ya bato mabe ezali eloko oyo Yehova ayiná,+Kasi libondeli ya bato oyo bazangi mbeba esepelisaka ye.+   Yehova ayinaka nzela ya moto mabe,+Kasi alingaka moto oyo alandaka bosembo.+ 10  Moto oyo asalaka te oyo ezali sembo alingaka disiplini te;+Kasi moto nyonso oyo ayinaka mpamela akokufa.+ 11  Nkunda* mpe esika ya libebi ebombami ata moke te na miso ya Yehova.+ Ekozala boni mpo na mitema ya bana ya bato!+ 12  Mosɛki alingaka te moto oyo azali kosembola* ye.+ Alukaka te toli epai ya bato ya bwanya.+ 13  Motema ya esengo ekómisaka elongi nsainsai,Kasi mawa elɛmbisaka moto nzoto.*+ 14  Motema ya mayele elukaka boyebi,+Kasi monɔkɔ ya bazoba esepelaka na bozoba.+ 15  Mikolo nyonso ya moto ya mpasi ezalaka mabe,+Kasi moto oyo azali na motema ya esengo* azalaka na fɛti ntango nyonso.+ 16  Kozala na biloko moke mpe kobanga Yehovaezali malamu+Koleka kozala na bozwi ebele elongo na mitungisi.*+ 17  Elubu ya ndunda epai bolingo ezali, ezali malamu+Koleka ngɔmbɛ-mobali ya mafutamafuta epai koyina ezali.+ 18  Moto ya nkandankanda abimisaka kowelana,+Kasi moto oyo ayokaka nkanda noki te akitisaka koswana.+ 19  Nzela ya moto ya gɔigɔi ezali lokola lopango ya nsendensende,+Kasi nzela ya bato oyo bazangi mbeba ezali lokola nzela monene oyo ezangi mabulu.+ 20  Mwana ya bwanya asepelisaka tata na ye,+Kasi zoba atyolaka mamana ye.+ 21  Moto oyo azangi bososoli* asepelaka na bozoba,+Kasi moto ya bososoli akendaka kaka liboso.+ 22  Makambo elongaka te soki toli* ezali te,Kasi elongaka soki bapesi-toli bazali ebele.+ 23  Moto asepelaka kopesa eyano ya malamu,*+Mpe liloba oyo elobami na ntango oyo ebongi ezali mpenza malamu!+ 24  Moto ya bososoli azali na nzela ya bomoi, nzela oyo etombolaka,+Aboyaka nzela oyo ekitisaka na Nkunda.*+ 25  Yehova akobuka ndako ya moto ya lolendo,+Kasi akobatela ndelo ya mabele ya mwasi oyo mobali akufá.+ 26  Yehova ayinaka mikano ya moto mabe,+Kasi maloba ya kosepelisa ezali pɛto epai na ye.+ 27  Moto oyo azwaka litomba na ndenge ya mabe amemaka mpasi* na ndako na ye moko,+Kasi moto oyo ayinaka kanyaka akokoba kozala na bomoi.+ 28  Moto ya sembo amanyolaka na motema na ye liboso ya koyanola,*+Kasi monɔkɔ ya bato mabe ebimisaka makambo ya mabe. 29  Yehova azali mosika mpenza na bato mabe,Kasi ayokaka libondeli ya bato ya sembo.+ 30  Kongɛnga ya miso esepelisaka motema;Nsango ya malamu elendisaka.*+ 31  Moto oyo ayokaka mpamela oyo epesaka bomoiAtángamaka na kati ya bato ya bwanya.+ 32  Moto nyonso oyo azali koboya disiplini azali kotyola bomoi* na ye,+Kasi moto nyonso oyo ayokaka mpamela azwaka bososoli.*+ 33  Kobanga Yehova ebongisaka mpo na kozwa bwanya,+Mpe komikitisa ememaka na nkembo.+

Maloba na nse

To, “Lolemo oyo ebikisaka.”
Lil., “kobukana na elimo.”
To, “mpamela.”
To, “biloko.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “kopamela.”
To, “elɛmbisaka elimo.”
To, “malamu.”
To, “mobulungano.”
To, “Moto oyo azali na motema te.”
To, “lisolo ya nkuku.”
Lil., “na eyano ya monɔkɔ na ye.”
To, “Sheole,” elingi koloba, nkunda ya bato nyonso. Talá Ndimbola ya maloba.
To, “nsɔni.”
To, “atalelaka malamumalamu ndenge ya koyanola; akanisaka liboso ya koloba.”
Lil., “ekómisaka mikuwa mafutamafuta.”
To, “molimo.”
Lil., “motema.”