Ndenge ekomamá na Matai 7:1-29

  • LISOLO LIKOLÓ YA NGOMBA (1-27)

    • Bótika kosambisa (1-6)

    • Bókoba kosɛnga, koluka, kobɛta kɔkɔkɔ (7-11)

    • Salelá basusu makambo oyo olingaka básalela yo (12)

    • Porte ya moke (13, 14)

    • Eyebanaka na mbuma na yango (15-23)

    • Ndako likoló ya libanga, ndako likoló ya zɛlo (24-27)

  • Ebele ya bato bakamwaki mpo na mateya ya Yesu (28, 29)

7  “Bótika kosambisa+ mpo básambisa bino te;  mpo bakosambisa bino kaka ndenge oyo bozali kosambisa,+ mpe bakomeka bino na emekeli oyo bozali komekela.+  Bongo mpo na nini ozali kotala lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo, kasi ozali komona te libaya* oyo ezali na liso na yo moko?+  To ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo: ‘Tiká nalongola lititi oyo ezali na liso na yo’; nzokande talá! libaya ezali na liso na yo moko?  Mokosi! Longolá liboso libaya oyo ezali na liso na yo moko, bongo okomona polele ndenge ya kolongola lititi oyo ezali na liso ya ndeko na yo.  “Bópesa oyo ezali mosantu epai ya bambwa te, bóbwakela mpe bangulu mayaka na bino te,+ noki bányatanyata yango na makolo na bango, bábaluka mpe bázokisa bino.  “Bókoba kosɛnga, mpe bakopesa bino;+ bókoba koluka, mpe bokomona; bókoba kobɛta kɔkɔkɔ, mpe bakofungolela bino.+  Mpo moto nyonso oyo asɛngaka azwaka,+ moto nyonso oyo alukaka amonaka, mpe moto nyonso oyo azali kobɛta kɔkɔkɔ bakofungolela ye.  Kutu, nani kati na bino, oyo soki mwana na ye asɛngi ye limpa, akopesa ye libanga? 10  To soki asɛngi ye mbisi, akopesa ye nde nyoka? 11  Na yango, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na bino oyo azali na likoló, akopesa te koleka biloko ya malamu+ epai ya baoyo bazali kosɛnga ye?+ 12  “Yango wana, makambo nyonso oyo bolingaka bato básalela bino, bino mpe bosengeli kosalela bango yango.+ Kutu, yango nde likambo oyo Mobeko mpe Basakoli eteyi.+ 13  “Bókɔta na porte ya moke,+ mpo porte ya monene mpe nzela oyo efungwamá ezali komema na libebi, mpe bato mingi bazali kokɔta kuna; 14  kasi porte oyo ezali moke mpe nzela ya nkaka, yango nde ezali komema na bomoi, mpe bato moke nde bazali komona yango.+ 15  “Bókeba na basakoli ya lokuta+ oyo bazali koya epai na bino balati mposo ya mpate,+ nzokande na kati bazali bambwa ya zamba ya lokoso.+ 16  Bokoyeba bango na mbuma na bango. Na nzete ya nzubɛ babukaka mbuma ya vinyo te, mpe na nzete ya nsɛndɛ babukaka mbuma ya figi te, boye te?+ 17  Ndenge moko mpe nzete nyonso ya malamu ebotaka mbuma ya malamu, kasi nzete nyonso oyo epɔlá ebotaka mbuma ya mabe.+ 18  Nzete ya malamu ekoki kobota mbuma ya mabe te, mpe nzete oyo epɔlá ekoki kobota mbuma ya malamu te.+ 19  Nzete nyonso oyo ebotaka mbuma ya malamu te, bakataka yango mpe babwakaka yango na mɔtɔ.+ 20  Boye, bokoyeba bato yango na mbuma na bango.+ 21  “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na Bokonzi ya likoló, kasi kaka moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.+ 22  Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,+ tosakolaki na nkombo na yo te? mpe tobimisaki bademo na nkombo na yo te? mpe tosalaki makamwisi mingi* na nkombo na yo te?’+ 23  Kasi ngai nakoloba na bango: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa pene na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko!+ 24  “Yango wana, moto nyonso oyo ayoki maloba na ngai oyo mpe asaleli yango, akozala lokola moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye likoló ya mabanga.+ 25  Mbula enɔkaki makasi, mpela eyaki, mipɛpɛ epɛpaki mpe ebɛtaki ndako yango, kasi ebukanaki te, mpo moboko na yango ezalaki likoló ya mabanga. 26  Lisusu, moto nyonso oyo ayoki maloba na ngai oyo kasi asaleli yango te akozala lokola moto moko ya zoba oyo atongaki ndako na ye likoló ya zɛlo.+ 27  Mbula enɔkaki makasi, mpela eyaki, mipɛpɛ epɛpaki mpe ebɛtaki ndako yango.+ Bongo ndako yango ekweaki mpe ebebaki mpenza.” 28  Ntango Yesu asilisaki koloba maloba yango, ebele ya bato wana bakamwaki na ndenge na ye ya koteya,+ 29  mpo azalaki koteya bango lokola moto oyo azali na bokonzi,+ kasi te lokola bakomeli na bango.

Maloba na nse

To, “libaya ya motɔndɔ.”
To, “misala mingi ya nguya.”