Mika 4:1-13

  • Ngomba ya Yehova etombwami (1-5)

    • Mipanga ekómi bitimweli ya mabele (3)

    • “Tokotambola na nkombo ya Yehova” (5)

  • Siona ekozonga lisusu mpe ekokóma makasi (6-13)

4  Na eleko ya nsuka ya mikolo,*Ngomba ya ndako ya Yehova+Ekopikama makasi likoló koleka nsɔngɛ ya bangomba,Mpe ekotombwama mpenza likoló koleka bangomba mike,Mpe bato ya bikólo bakosopana kuna.+   Mpe bikólo mingi ekokende mpe ekoloba: “Bóya! Tómata na ngomba ya YehovaNa ndako ya Nzambe ya Yakobo.+ Akoteya biso banzela na ye,Mpe tokotambola na banzela na ye.” Mpo mobeko* ekobima na Siona,Mpe liloba ya Yehova ekobima na Yerusaleme.   Akokata makambo kati na bato mingi ya bikólo+Akosembola makambo* etali bikólo ya nguya oyo ezali mosika. Bakokómisa mipanga na bango bitimweli ya mabeleMpe makɔnga na bango makwangola ya kokata matiti.+ Ekólo moko ekotombola mopanga te mpo na kobunda na ekólo mosusu,Bakoyekola mpe etumba lisusu te.+   Bakofanda, moto na moto na nse ya nzete na ye ya vinyo mpe na nse ya nzete na ye ya figi,+Mpe moto ata moko te akobangisa bango,+Mpo monɔkɔ ya Yehova ya mampinga elobi yango.   Mpo bato nyonso ya bikólo bakotambola, moto na moto na nkombo ya nzambe na ye,Kasi biso tokotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso+ libela na libela.   “Na mokolo yango,” yango nde liloba ya Yehova,“Nakoyanganisa baoyo* bazalaki kotɛnguma,Mpe nakosangisa esika moko baoyo bapalanganaki,+Ata mpe baoyo nanyokolaki.   Nakokómisa baoyo bazalaki kotɛnguma bato oyo batikali,+Mpe baoyo* babwakamaki mosika ekólo moko makasi;+Ngai Yehova nakoyangela lokola mokonzi na bango na Ngomba Siona,Banda sikoyo mpe mpo na libela.   Mpe yo, Ee ndako molai ya etonga,Mwa ngomba ya mwana mwasi ya Siona,+Epai na yo boyangeli ya liboso* ekoya, ɛɛ, ekoya mpenza,+Bokonzi ezali ya mwana mwasi ya Yerusaleme.+   Sikoyo mpo na nini ozali koganga makasi? Ozali na mokonzi te,To mopesi-toli na yo akufi,Mpo mpasi ekanga yo boye lokola ya mwasi oyo azali kobota?+ 10  Bundaná na mpasi mpe lelá makasi, Ee mwana mwasi ya Siona,Lokola mwasi oyo azali kobota,Mpo sikoyo okolongwa na engumba mpe okokende kofanda na mboka. Okokende tii na Babilone,+Mpe kuna bakobikisa yo;+Kuna nde Yehova akosikola yo na lobɔkɔ ya banguna na yo.+ 11  Mpe sikoyo bikólo mingi ekoyanganisama mpo na kobundisa yo;Ekoloba: ‘Tiká asambwisama,Mpe tiká miso na biso emona oyo ekómeli Siona.’ 12  Kasi bayebi makanisi ya Yehova te,Bakangi ntina ya mokano* na ye te;Mpo akoyanganisa bango esika moko lokola molɔngɔ ya mbuma oyo bakati sika na esika ya kotutatuta mbuma. 13  Tɛlɛmá mpe tutá ndenge batutaka mbuma, Ee mwana mwasi ya Siona;+Mpo nakobongola maseke na yo ekóma ebende,Mpe nakobongola basabo na yo ekóma kwivre,Mpe okonikanika bato mingi ya bikólo.+ Okokabela Yehova litomba na bango oyo ezwami na bokosi,Mpe biloko na bango epai ya Nkolo ya solosolo ya mabele mobimba.”+

Maloba na nse

To, “Na mikolo ya nsuka.”
To, “mateya.”
To, “Akozongisa makambo na nzela.”
Lil., “ye oyo.”
Lil., “ye oyo.”
To, “ya kala.”
To, “toli.”