Nzembo 25:1-22

  • Libondeli mpo na kosɛnga litambwisi mpe bolimbisi

    • “Teyá ngai banzela na yo” (4)

    • “Yehova azali moninga ya motema” (14)

    • “Limbisá masumu na ngai nyonso” (18)

Loyembo ya Davidi. א [Alef] 25  Ee Yehova, nabaluki* epai na yo. ב [Bet]   Nzambe na ngai, natyeli yo motema;+Salá ete nayoka nsɔni te.+ Kotika te ete banguna na ngai básepela mpo na bampasi na ngai.+ ג [Gimel]   Ya solo, moto moko te oyo atyaka elikya epai na yo akoyoka nsɔni,+Kasi nsɔni ezali kozela baoyo basalaka makambo na bokosi kaka mpamba.+ ד [Dalet]   Salá ete nayeba banzela na yo, Ee Yehova;+Teyá ngai banzela na yo.+ ה [He]   Tambwisá ngai na solo na yo mpe teyá ngai,+Mpo yo ozali Nzambe ya lobiko na ngai. ו [Waw] Natyaka elikya epai na yo mokolo mobimba. ז [Zayin]   Ee Yehova, kanisá motema mawa na yo, mpe bolingo na yo ya sembo,+Oyo omonisaka ntango nyonso.*+ ח [Het]   Kokanisa te masumu ya bolenge na ngai mpe makambo na ngai ya kobuka mibeko. Kanisá ngai na kolanda bolingo na yo ya sembo,+Mpo ozali malamu,Ee Yehova.+ ט [Tet]   Yehova azali malamu mpe sembo.+ Yango wana ateyaka basumuki nzela oyo basengeli kolanda.+ י [Yod]   Akotambwisa bato ya komikitisa na makambo oyo ezali sembo,*+Mpe akoteya bato ya komikitisa nzela na ye.+ כ [Kaf] 10  Banzela nyonso ya Yehova etondi na bolingo ya sembo mpe bosoloMpo na baoyo bazali kotosa kondimana na ye+ mpe makundoli na ye.+ ל [Lamed] 11  Mpo na nkombo na yo,Ee Yehova,+Limbisá libunga na ngai, atako ezali monene. מ [Mem] 12  Soki moto azali kobanga Yehova,+ Akoteya ye nzela oyo asengeli kopona.+ נ [Nun] 13  Makambo ya malamu ekokómela ye,+Mpe bato ya libota na ye bakozwa* mabele.+ ס [Samek] 14  Yehova azali moninga ya motema ya baoyo babangaka ye,+Mpe asalaka ete báyeba kondimana na ye.+ ע [Ayin] 15  Natyelaka ntango nyonso Yehova motema mpo na koluka lisalisi,+Mpo akolongola makolo na ngai na monyama.+ פ [Pe] 16  Balolá elongi na yo epai na ngai mpe moniselá ngai boboto,Mpo nazali kaka ngai moko mpe nazangi lisalisi. צ [Tsade] 17  Bampasi ya motema na ngai ekómi mingi;+Longolá ngai na mitungisi na ngai. ר [Resh] 18  Talá mpasi na ngai mpe kotungisama na ngai,+Mpe limbisá masumu na ngai nyonso.+ 19  Talá ndenge banguna na ngai bazali mingiMpe ndenge bazali mpenza koyina ngai. ש [Shin] 20  Kɛngɛlá bomoi* na ngai mpe bikisá ngai.+ Kotika te nayoka nsɔni, mpo nakimi epai na yo. ת [Taw] 21  Kozanga mbeba mpe bosembo ebatela ngai,+Mpo natyeli yo elikya.+ 22  Ee Nzambe, bikisá* Yisraele na bampasi na ye nyonso.

Maloba na nse

To, “natomboli molimo na ngai.”
To, “Oyo ezali uta kala.”
Lil., “na lisambisi.”
Lil., “momboto na ye ekozwa.”
To, “molimo.”
Lil., “sikolá.”