Yoele 2:1-32

  • Mokolo ya Yehova mpe limpinga na ye monene (1-11)

  • Yehova asɛngi bato bázongela ye (12-17)

    • “Bópasola mitema na bino” (13)

  • Yehova ayanoli bato na ye (18-32)

    • ‘Nakosopela bato elimo na ngai’ (28)

    • Makamwisi na likoló mpe na mabele (30)

    • Baoyo bazali kobelela nkombo ya Yehova bakobika (32)

2  “Bóbɛta kelelo* na Siona!+ Bóbɛta ntangwa ya etumba na ngomba na ngai mosantu. Tiká bato nyonso oyo bafandi na ekólo* bálɛnga,Mpo mokolo ya Yehova ezali koya!+ Ekómi pene!   Ezali mokolo ya kozanga pole mpe ya molili,+Mokolo ya mapata mpe ya molili makasi,+Lokola pole ya ntɔngɔntɔngɔ oyo ezali kobima likoló ya bangomba. Ezali na ekólo moko ya bato ebele mpe ya nguya;+Ekólo ya ndenge wana emonanaki te liboso na yango,Mpe mosusu ya ndenge wana ekomonana te nsima na yangoNa mabota nyonso oyo ekolanda.   Liboso na bango, mɔtɔ ezali kobebisa,Mpe nsima na bango, mɔtɔ ezali kozikisa.+ Mokili oyo ezali liboso na bango ezali lokola elanga ya Edene,+Kasi nsima na bango, ezali esobe oyo etikali mpamba,Mpe eloko moko te ekoki kotikala.   Bazali komonana lokola bampunda,Mpe bazali kopota mbangu lokola bampunda ya etumba.+   Makɛlɛlɛ oyo bazali kosala ntango bazali kopumbwapumbwa na nsɔngɛ ya bangomba,+Ezali lokola makɛlɛlɛ ya makalo ya bitumba, lokola makɛlɛlɛ ya mɔtɔ makasi oyo ezali kozikisa matiti ekauká. Bazali lokola bato ya ekólo moko ya nguya, oyo batandami na molɔngɔ lokola bakei na etumba.+   Bato nyonso bakozala na mpasi mpo na bango. Bilongi nyonso ekozala mawamawa.*   Bazali koya mbangu lokola bilombe ya etumba,Bazali komata efelo lokola basoda,Mokomoko azali kokende liboso na nzela na ye,Mpe bazali kolongwa na banzela na bango te.   Bazali kotindikana te;Mobali mokomoko azali kolanda nzela na ye. Soki bamosusu bakwei mpo bibundeli* ezwi bango,Bamosusu bazali kolongwa na molɔngɔ te.   Bazali kopanzana na engumba, bazali kokima mbangu likoló ya efelo. Bazali komata na bandako, bazali kokɔta na bafɛnɛtrɛ lokola miyibi. 10  Liboso na bango, ekólo ezali kolɛnga mpe likoló eningani. Moi mpe sanza ekómi molili,+Mpe minzoto etiki kongɛnga. 11  Yehova akotombola mongongo liboso ya limpinga na ye,+ mpo limpinga na ye ezali na bato ebele mpenza.+ Mpo ye oyo azali kokokisa liloba na ye azalina nguya.Mpo mokolo ya Yehova ezali monene mpe ezali nsɔmɔ mpenza.+ Nani akokoka yango?”+ 12  Yehova alobi: “Nzokande ata sikoyo,” “bózongela ngai na motema mobimba,+Bókila bilei,+ bólela mpe bóganga na kolela. 13  Bópasola mitema na bino,+ kasi bilamba na bino te,+Mpe bózongela Yehova Nzambe na bino,Mpo azali na ngɔlu mpe na motema mawa, ayokaka nkanda noki te+ mpe atondi na bolingo ya sembo,+Mpe akotalela lisusu* mpasi oyo akanaki koyeisa. 14  Nani ayebi? Mbala mosusu akobongola makanisi mpe akotalela lisusu* ekateli na ye,+Mpe mbala mosusu akopesa bino lipamboli,Mpo bópesa likabo ya mbuma mpe likabo ya masanga mpo na Yehova Nzambe na bino. 15  Bóbɛta kelelo* na Siona! Bóyebisa* bato bákila bilei; bóbengisa bato na liyangani moko monene.+ 16  Bóyanganisa bato, bósantisa lisangá.+ Bóyanganisa mibange,* bósangisa bana mpe bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ.+ Tiká ete mobali ya libala abima na shambrɛ na ye ya kati, mpe mwasi ya libala abima na shambrɛ na ye ya libala. 17  Na katikati ya ndako ya kokɔtela mpe etumbelo,+Tiká ete banganga-nzambe, bato oyo basalelaka Yehova, bálela mpe báloba: ‘Ee Yehova, yokelá bato na yo mawa!Kotika te ete bátyola libula na yo,Soki otiki bikólo eyangela yango. Mpo na nini bato ya bikólo báloba: “Nzambe na bango azali wapi?”’+ 18  Na yango Yehova akozala na molende mpo na ekólo na ye,Mpe akoyokela bato na ye mawa.+ 19  Yehova akoyanola bato na ye boye: ‘Nakotindela bino mbuma, vinyo ya sika mpe mafuta,Mpe bokotonda mpenza.+Nakotika lisusu te ete bátyola bino na kati ya bikólo.+ 20  Nakobengana moto ya nɔrdi mosika na bino;Nakopalanganisa ye na mokili oyo ekauká mpe oyo etikalá mpamba.Bato na ye oyo bazali liboso,* nakotinda bango na ngámbo ya mbu oyo ezali na ɛsti.*Mpe bato na ye oyo bazali na nsima, nakotinda bango na ngámbo ya mbu oyo ezali na wɛsti.* Nsolo na ye ya mabe ekomata,Nsolo na ye ya mabe makasi ekokoba komata;+Mpo nakosala makambo ya minene.’ 21  Kobanga te, Ee ekólo! Zalá na esengo mpe sepelá, mpo Yehova akosala makambo ya minene. 22  Bóbanga te, bino banyama ya esobe,Mpo matiti ya esobe ekokóma lisusu mobesu,+Mpe banzete ekobota mbuma na yango;+Nzete ya figi mpe nzete ya vinyo ekobota mbuma mingi mpenza.+ 23  Bino bana ya Siona, bózala na esengo mpe bósepela mpo na Yehova Nzambe na bino.+Mpo akopesa bino mbula ya eleko ya otɔnɛ na ndenge oyo ekoki,Akonɔkisela bino mbula makasi,Mbula ya eleko ya otɔnɛ mpe mbula ya eleko ya prɛnta, ndenge ezalaki liboso.+ 24  Bisika ya kotutatuta mbuma ekotonda na mbuma oyo epɛtolami,Mpe bikamwelo ekotonda mɛkɛ na vinyo ya sika mpe mafuta.+ 25  Mpe nakofuta bino biloko na bino oyo elyamaki bambula mingiOyo liyoyo ya mapapu, liyoyo ezangá mapapu, liyoyo ya lokoso, mpe liyoyo oyo ebebisaka elyaki,Limpinga na ngai monene oyo natindelaki bino.+ 26  Bokolya mpe bokotonda mpenza,+Mpe bokosanzola nkombo ya Yehova Nzambe na bino,+Oyo asali makambo ya kokamwa mpo na bino.Bato na ngai bakoyoka lisusu nsɔni ata mokolo moko te.+ 27  Mpe bokoyeba mpenza ete nazali na kati ya Yisraele,+Mpe ete nazali Yehova Nzambe na bino;+ mosusu azali te! Bato na ngai bakoyoka lisusu nsɔni ata mokolo moko te. 28  Nsima na yango, nakosopela bato ya ndenge nyonso elimo na ngai.+Mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi bakosakola,Mibange na bino bakolɔta bandɔtɔ,Mpe bilenge na bino ya mibali bakomona bimonaneli.+ 29  Ata epai ya baombo na ngai ya mibali mpe baombo na ngai ya basi,Nakosopa elimo na ngai na eleko yango. 30  Mpe nakosala makamwisi* na likoló mpe na mabele;Ekozala na makila, mɔtɔ mpe makonzí ya milinga.+ 31  Moi ekobongwana molili mpe sanza ekobongwana makila,+Liboso ete mokolo monene mpe ya nsɔmɔ ya Yehova eya.+ 32  Mpe moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.+Mpo kaka ndenge Yehova alobi yango, na Ngomba Siona mpe na Yerusaleme, ekozala na bato oyo bakobika,+Bato oyo bakobika, oyo Yehova abengi.”

Maloba na nse

To, “Bóyula liseke.”
To, “mabele.”
To, “ekokóma motane.”
To, “bibundeli ya kobwakela.”
To, “akoyoka mawa na.”
To, “akoyoka mawa mpo na.”
To, “Bóyula liseke.”
Lil., “Bósantisa.”
To, “bankulutu.”
Lil., “na elongi na ye.”
Elingi koloba, Mbu Ekufá.
Elingi koloba, Mbu ya Mediterane.
To, “nakosala bilembo oyo emonisi makambo oyo ekoya.”