Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

BOMOI YA BAKRISTO

Salelá buku Sepelá na bomoi libela na libela! mpo na kokómisa kondima na yo makasi epai ya Yehova mpe Yesu

Salelá buku Sepelá na bomoi libela na libela! mpo na kokómisa kondima na yo makasi epai ya Yehova mpe Yesu

Mpo na kosepelisa Nzambe, bayekoli ya Biblia basengeli kokómisa kondima na bango makasi. (Ebr 11:6) Tokoki kosalisa bango na nzela ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!. Buku yango ya boyekoli ezali na bavɛrsɛ ya Biblia, makanisi oyo ezali polele, mituna ya malamu, bavideo ya kitoko, mpe bililingi ya kitoko. Soki tozali kosalisa bato oyo toyekolaka na bango Biblia bákóma na bizaleli ya bokristo mpe na boyokani ya malamu ná Nzambe, tozali kotonga na bisaleli oyo ezikaka na mɔtɔ te.​—1Ko 3:12-15.

Bato mosusu bakanisaka ete ekoki kosalema te ete moto akóma moninga ya Nzambe, ye oyo amonanaka te. Yango wana tosengeli kosalisa bango báyeba bizaleli kitoko oyo Yehova azali na yango.

TALÁ VIDEO SALELÁ BUKU “SEPELÁ NA BOMOI LIBELA NA LIBELA!” MPO NA KOKÓMISA KONDIMA NA YO MAKASI EPAI YA YEHOVA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Nini endimisi biso ete ndeko mwasi amibongisaki malamu mpo na boyekoli oyo?

  • Nini emonisi ete asalelaki malamu mituna mosusu mpo na kosalisa moyekoli abimisa mayoki mpe makanisi na ye na Yisaya 41:10, 13?

  • Video oyo batalaki mpe bavɛrsɛ ya Biblia esalisaki moyekoli na nini?

Bato mingi bakangaka ntina ya mbeka ya lisiko te, mpe bamosusu bamonaka te ete ezali likabo oyo Nzambe apesá biso. (Ga 2:20) Yango wana, tosengeli kosalisa bango bándima mbeka ya lisiko oyo Yesu apesaki.

TALÁ VIDEO SALELÁ BUKU SEPELÁ NA BOMOI LIBELA NA LIBELA!” MPO NA KOKÓMISA KONDIMA NA YO MAKASI EPAI YA YESU, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Nini emonisi ete ndeko mobali amibongisaki malamu mpo na boyekoli oyo?

  • Ndenge nini asalelaki malamu eteni “Makanisi mosusu” mpo na kosalisa moyekoli na ye?

  • Mpo na nini libondeli ezali na ntina mpo na moyekoli?