Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Liyemi moko ya kala na Ezipito endimisi likambo oyo lisolo moko ya Biblia elobi

Liyemi moko ya kala na Ezipito endimisi likambo oyo lisolo moko ya Biblia elobi

 Liyemi yango oyo ezali na molai ya mɛtrɛ 8 ezali na Karnak, pene ya ekɔtelo ya tempelo moko ya Ezipito, ya nzambe Amôn. Bato ya mayele balobi ete liyemi yango, oyo bakomá na ekomeli ya bato ya Ezipito (hiéroglyphe) ezali kolakisa bisika oyo Farao Shishake alongaki na bitumba, na bateritware oyo ezali na nɔrdi-ɛsti ya Ezipito, na ndakisa teritware ya Yuda mpe ya bokonzi ya nɔrdi ya Yisraele.

Liyemi ya Karnak oyo ezali kolakisa bakangami

 Liyemi yango ezali komonisa ndenge Amôn azali kolakisa Sheshonq, oyo abengami mpe Shishake bato koleka 150 oyo bakangi na bitumba. a Mokangami mokomoko azali komonisa moko ya bingumba to bato oyo bango balongaki na bitumba. Bankombo ya bingumba yango ekomami lokola sɛrklɛ na nzoto ya mokangami mokomoko. Tii lelo ezali mpasi te kotánga bankombo yango mosusu mpo ekomami polele. Kutu bato oyo batángaka Biblia bayebi bankombo yango mosusu malamu mpenza. Na ndakisa nkombo lokola: Bete-sheane, Gibeone, Megido, mpe Shuneme.

 Biblia elobeli ndenge oyo Ezipito ebundisaki Yuda. (1 Bakonzi 14:25, 26) Kutu, Biblia elobeli makambo mikemike etali etumba yango. Totángi boye: “Na mbula ya mitano ya Mokonzi Rehoboame, Shishake mokonzi ya Ezipito amataki kobundisa Yerusaleme. . . . Ná makalo nkóto moko na nkama mibale (1 200) mpe basoda nkóto ntuku motoba (60 000) oyo batambolaka na mpunda; mpe bato oyo babimaki elongo na ye na Ezipito bakokaki kotángama te . . . Azwaki bingumba ya Yuda oyo ebatelami makasi mpe nsukansuka akómaki kino na Yerusaleme.”​—2 Ntango 12:2-4.

 Kaka liyemi ya Karnak te nde ezali elembeteli ya Arkeoloji oyo emonisi ndenge Shishake abundisaki teritware ya Yisraele. Nkombo “Sheshonq” ezali mpe na eteni moko ya libanga to monima oyo bamonaki esika Megido ezalaki; engumba moko oyo Biblia elobeli.

 Ndenge Biblia elobeli na bosikisiki elonga ya Sheshonq na teritware ya Yuda, yango emonisi bosembo ya bakomi ya Biblia. Bakomaki na bosembo nyonso ndenge ekólo na bango elongaki bikólo mosusu mpe ndenge bikólo mosusu elongaki ekólo na bango. Bakomi mingi ya ntango ya kala bamonisá bosembo ya ndenge wana te.

a Nkombo “Shishake” ebengami na kolanda monɔkɔ ya Ebre.