Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mibali mpe mitungisi​—Lisalisi nini Biblia ekoki kopesa?

Mibali mpe mitungisi​—Lisalisi nini Biblia ekoki kopesa?

 Mpo na bato mingi, moto oyo azali na mitungisi, a ezali moto oyo azali kobanga, moto oyo alongaka te kolamuka na mbeto na ntɔngɔ, to moto oyo alobelaka ntango nyonso mitungisi na ye.

 Ezali solo, bato mosusu bazalaka bongo ntango bazali komitungisa. Kasi bolukiluki emonisi ete bato mosusu, mingimingi mibali, bazalaka bongo te. Ankɛtɛ moko emonisi ete mibali mingi “bazali komɛla masangá to kosalela drɔgɛ mpo na kosilisa mitungisi na bango. Mpe mbala mingi mibali bazalaka nkandankanda to basilisaka mpambampamba ntango bazali na mitungisi.”

 Na ntembe te, mibali nyonso te bazalaka bongo. Kasi ezala bongo to te, mitungisi ekómi mingi na ‘ntango oyo ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano.’ (2 Timote 3:1) Soki ozali komitungisa, Biblia ekoki kosalisa yo?

Toli ya Biblia oyo ekoki kosalisa yo mpo olonga mitungisi

 Biblia etondi na toli oyo ebongi kotyelama motema oyo ekoki kosalisa biso ntango tozali komitungisa. Tózwa ndakisa misato ya toli na yango.

  1.  1. “Bómitungisa ata moke te mpo na mokolo oyo ekolanda, mpo mokolo oyo ekolanda ekozala na mitungisi na yango moko. Mokolo na mokolo ezali na mitungisi na yango.”​—Matai 6:34.

     Ndimbola: Tómitungisaka koleka ndelo te mpo na makambo oyo toyebi te soki ekoki kosalema to te. Mbala mingi, makambo yango esalemaka te ndenge tozalaki kokanisa. Mpe na bantango mosusu, tokamwaka ntango tomonaka ete makambo eleki na yango malamu.

     Meká kosala boye: Omikundwela ntango moko na bomoi na yo oyo okanisaki ete likambo moko ya mabe ekokómela yo, kasi likambo yango esalemaká bongo te ndenge ozalaki kokanisa. Na nsima, zwá ntango ya kokanisa likambo oyo ozali kokutana na yango mpe talelá yango na ndenge oyo ekosalisa yo omona soki likambo yango ekoki kobimisa mokakatano moko monene.

  2.  2. “Ebende epelisaka ebende. Ndenge moko mpe moto angɛngisaka elongi ya moto mosusu.”​—Masese 27:17.

     Ndimbola: Bato mosusu bakoki kosalisa biso tólonga mitungisi na biso, soki tondimi básalisa biso. Bakoki kopesa biso makanisi ya malamu oyo esalisá bango na bomoi na makambo oyo bakutanaki na yango. Ezala ndenge nini, bakoki kosalisa biso tótalela likambo yango na ndenge ya malamu mpe kopesa biso elikya.

     Meká kosala boye: Luká moto moko kati ya bato oyo oyebani na bango oyo akoki kopesa yo toli, na ndakisa, moninga oyo azali kokutana na mokakatano oyo ozali kokutana na yango. Tuná ye nini esalisaki ye to nini esimbaki te.

  3.  3. “Ntango bozali kobwakela ye mitungisi na bino nyonso, mpo atyelaka bino likebi.”​—1 Petro 5:7.

     Ndimbola: Nzambe akipaka baoyo bazali konyokwama. Asɛngi biso tóbondela ye mpo na makambo nyonso oyo ezali kotungisa biso.

     Meká kosala boye: Meká kosala liste ya makambo oyo ezali kotungisa yo. Na nsima, bondelá Nzambe mpo na makambo yango, lobelá likambo mokomoko mpe sɛngá ye asalisa yo olonga yango.

Ntango mitungisi ekozala lisusu te

 Biblia epesi toli mingi mpo na kolonga mitungisi. Elaki ete etikali moke ntango oyo makambo oyo ezali kotungisa biso ekozala lisusu te. Ndenge nini ekosalema?

 Bokonzi ya Nzambe ekosilisa mitungisi nyonso. (Emoniseli 21:4) Kutu, na nse ya boyangeli ya Bokonzi yango, tokokanisa lisusu te makambo ya kala, mpe bampasi ekozala lisusu te.​—Yisaya 65:17.

 Yango ezali avenire oyo “Nzambe oyo apesaka kimya” alingi mpo na yo. (Baroma 16:20) Alendisi biso: “Nayebi malamu makanisi oyo nazali kokanisa mpo na bino, . . . makanisi ya kimya, kasi ya mpasi te, mpo na kopesa bino bomoi malamu na mikolo ezali koya mpe elikya.”​—Yirimia 29:11.

a Na lisolo oyo, liloba “mitungisi” ezali te mitungisi ya makasi ya sante oyo ekosɛnga lisalisi ya monganga, kasi ezali nde mitungisi ya mokolo na mokolo oyo ekoki kolekela biso mitó. Mbala mosusu, bato oyo bazali na mokakatano ya sante bakosepela kokende koluka lisalisi epai ya monganga oyo ayebi malamu mosala na ye.​—Luka 5:31.