Lakisá makambo oyo ezali na kati

Na sanza oyo eleki, bamilio ya bato bakimi Ukraine. Batatoli ya Yehova koleka 16 000 bazali mpe kati na bango

31/03/2022
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Bandeko oyo bakimi bitumba na Ukraine bazali kolobela ndenge batiki biloko na bango nyonso

“Eloko kaka moko oyo ezali na ntina mingi ezali boyokani na biso ná Yehova”

Bandeko oyo bakimi bitumba na Ukraine bazali kolobela ndenge batiki biloko na bango nyonso

Na ngonga ya mitano ya ntɔngɔ nkulutu moko abengaki ndeko Femi Durodola elongo na mwasi na ye. Nkulutu yango ayebisaki bango boye: “Bóbanga te, kasi bóbongama. Basoda ya Russie bazali koya na Kiev!” Ndeko Yana alobi boye: “Na ntango yango, nakómaki kobanga makasi.”

Bandeko yango, oyo bautaki kobalana sika, balataki bilamba, basalaki kafe na bango ya nsuka oyo bamɛlaki na ndako na bango, mpe batángaki mokapo ya mokolo yango. Mokapo yango elobaki boye: “Nguya na bino ekomonana mpenza soki bofandi nyɛɛ mpe botye motema.” (Yisaya 30:15) Ndeko Femi abondelaki Yehova na motema mobimba. Ndeko Femi, oyo azali mwana mboka ya ekólo Nigeria, mpe ndeko mwasi Yana oyo azali mwana mboka ya ekólo Ukraine, bamemaki kaka sakosi na bango, batikaki biloko nyonso, mpe bakimaki na Pays-Bas.

Bandeko na biso mingi, oyo bazwaki ekateli ya kolongwa na Ukraine na mokolo ya 24/02/2022 ntango basoda ya Russie bakɔtaki na ekólo yango, bazali kokutana na makambo ya ndenge wana. Na Ukraine, Batatoli ya Yehova bazali soki 130 000. Tii na mokolo ya lelo, Batatoli ya Yehova koleka 36 000 bazwi ekateli ya kotika bandako na bango, mpe Batatoli ya Yehova koleka 16 000 bazwi ekateli ya kokima na bikólo mosusu. Bandeko yango mingi batiki bandako na bango, misala na bango, mpe masangá na bango. Na boumeli ya etumba yango, mibali ya ekólo Ukraine ya mbula 18 tii 60 bapesami nzela te ya kokima ekólo na bango. Nzokande, mibali oyo bazali bato ya bikólo mosusu bakoki kokima.

Baoyo bazali kokima bazali kaka kozwa mwa biloko ya ntina. Bazali komata na train, na babisi, mpe kosala mibembo ya mpasi mingi mpo na koluka esika ya kokima. Na bantango mosusu, bazali kutu koyeba te esika oyo bazali kokende. Kondima makasi oyo bazali na yango epai ya Yehova ezali kopesa bango makasi. Bazali kokima bingumba oyo bitumba ebebisi mpe bazali koyeba te soki bakozonga mokolo mosusu.

Ndeko Yana alobi boye: “Tosundoli biloko nyonso. Tozwi kaka mwa biloko moke mpenza. Likambo oyo ekundweli biso ete eloko kaka moko oyo ezali na ntina mingi ezali boyokani na biso ná Yehova.”

Ntango azalaki na ndako na ye na engumba Kiev, ndeko mwasi Lilia Antoniuk azalaki koyoka ndenge sirène ezalaki kolela mpo na kokebisa bato ete bɔmbi mpe lokito ya babɔmbi ezali koya. Nzela etondaki na mituka oyo eziki mpe biteni ya bandako mpe ya ba pont.

Ndeko Lilia ná mwana na ye ya mwasi ya mbula 17 bazwaki ekateli ya kokima. Basalaki mobembo na boumeli ya mikolo ebele na train oyo etondaki na bato mpo na kokende na Pologne. Bazalaki na biloko moke ya kolya mpe bazalaki ya kotɛlɛma bangonga ebele na boumeli ya mobembo yango. Motema ya bandeko basi yango ekitaki ntango bakómaki na engumba Przemyśl, na Pologne.

Ndeko Lilia alobi boye: “Ntango kaka tomonaki bandeko na elembo ya ‘JW.ORG’, mbala moko toyebaki ete bakoyamba biso malamu mpenza.” Bamemaki bandeko basi yango na Ndako ya Bokonzi epai bakokaki koyoka mpenza mɔtɔ, kolya, mpe kopema liboso balakisa bango esika oyo basengeli kokende kofanda.

Ndeko Lilia, oyo asili kokende na Allemagne, alobi boye: “Tomonaki ndenge oyo Yehova akokisaki bamposa na biso mpe yango ekómisi lisusu kondima na biso makasi. Nazali mpenza na botɔndi mpo na bolingo oyo Yehova amoniseli ngai mpe mpo na bandeko oyo basalisaki biso na ntango ya mpasi.”

Anastasiia Kovalyova

Ndeko mwasi Anastasiia Kovalyova alobeli ndenge oyo basoda ya Russie bayaki kobundisa engumba Zaporizhzhia na baaviɔ. Amonaki ndenge baaviɔ yango ezalaki kobwaka babɔmbi ya minene mpe ayokaki lokito na yango na apartema na ye. Babɔmbi yango ezalaki kokwea ntango nyonso mpe bana ya ndeko ya Anastasiia, ya mobali azali na mbula misato mpe ya mwasi mbula nsambo, bazalaki kobanga makasi mpenza. Na yango bazwaki ekateli ya kokima. Ndeko Anastasiia alobi boye: “Lokola tokokaki komema biloko mingi te, tozangaki bilamba mpe biloko mosusu. Kasi bandeko bapesaki biso biloko nyonso. Tokómaki na biloko nyonso oyo tosengelaki na yango mpe mingi koleka.” Ndeko mwasi Anastasiia, Anya ndeko mwasi ya mobali na ye, elongo na bana na bango balekaki na nzela ya Pologne mpo na kokende na Allemagne.

Anastasiia Shchukina ná mama na ye, Olha Lysenko

Ndeko mwasi Anastasiia Shchukina ná mama na ye ndeko Olha Lysenko, bazalaki komibomba na ndako na bango ya nse ya mabele mbala nyonso oyo sirène ezalaki kolela mpo na kokebisa bato ete bɔmbi elingi kokwea. Bandeko basi yango bazali babongisi nzela mpe bazalaki kosakola na mwa engumba moke babengi Brailiv, Vinnytsia Oblast epai mposa ya basakoli ezali mingi. Ezalaki mpasi bázwa ekateli ya kokima, kasi nsukansuka ntango makambo eyaki ndongo, bazwaki ekateli yango. Bazwaki kaka mwa biloko ya ntina mpe basalaki mibembo ya mikolo mibale na train mpe bazwaki ata ntango ya kolala te. Ezalaki mpasi mpo ndeko mwasi Olha akima mpo azalaki na mbula 58 mpe sante na ye ezalaki malamu te. Bakómaki na engumba Rzeszów, na Pologne na ngonga ya 2h00 na butu. Bandeko mosusu bayaki mpo na koyamba bango. Ndeko Anastassiia alobi boye: “Atako ezalaki mpenza na butu makasi bandeko bazalaki kozela mpo na koyamba biso. Tozali mpenza na botɔndi mpo na Yehova mpe bandeko biso.”

Elizabeth na Andrzej Chyba

Na engmba Sumy, ndeko Andrzej Chyba, moto ya ekólo Pologne elongo na mwasi na ye Elizabeth, oyo azali moto ya ekólo Grande-Bretagne, babombanaki na ndako ya nse ya mabele ya ndeko mobali moko elongo na bandeko mosusu mitano. Makɛlɛlɛ ya baaviɔ ya bitumba, lokito ya mindoki mpe babɔmbi ezalaki koyokana mpenza. Bandeko yango bazwaki makasi ntango batalaki drame ya Biblia “Ee Yehova, . . . natyeli yo motema,” oyo elobeli lisolo ya Mokonzi Hizikiya ntango bato ya Asiri bayaki kobundisa Yerusaleme.

Ndeko Andrzej, oyo azali sikoyo na Pologne elongo na mwasi na ye, alobi boye: “Bandeko batindelaki biso makanisi ndenge na ndenge ya Biblia, na ndakisa balendisaki biso tótánga Nzembo 27.”

Tozali na kondima ete Yehova akopambola bandeko na biso oyo ‘bandimi kobungisa biloko nyonso ya mosuni’ mpe bazali na elikya ete na mikolo ezali koya bitumba ekozala lisusu te.​—Bafilipi 3:8.