Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndeko Mark Sanderson, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, azali kolakisa Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu na monɔkɔ ya Croate mpe ya Serbe

29/04/2020
BANSANGO YA MIKILI NYONSO

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu ebimi na monɔkɔ ya Croate mpe ya Serbe

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu ebimi na monɔkɔ ya Croate mpe ya Serbe

Na mokolo ya 25/04/2020, ndeko Mark Sanderson, ndeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi ayebisaki na nzela ya video oyo basalaki ete Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu ebimi na monɔkɔ ya Croate mpe ya Serbe. Biblia oyo ya monɔkɔ ya Serbe ebimaki na ekomeli ya Romain mpe ya Cyrillique.

Mpo na kotosa malako ya bakonzi ya Leta na ntango oyo ya maladi mabe ya coronavirus, masangá ya Bosnie-Herzégovine, Croatie, Monténégro, ná Serbie bayanganaki esika moko te. Likita ya monene esalemaki na nzela ya video. Bato 12 705 balandaki likita yango na video.

Bandeko na biso oyo balobaka monɔkɔ ya Croate mpe ya Serbe bazali kolanda programɛ

Moko ya bandeko oyo balandaki likita ya kobimisama ya Biblia yango alobaki ete “ezali liyaka ya motuya,” mpe abakisaki ete ayokaki lokola nde “Yehova azalaki koloba na ye mpenza.” Nkulutu ya lisangá moko alobi boye: “Ntango nazali kotánga Biblia yango oyo babongisi lisusu na monɔkɔ ya mboka na ngai, nakangi mpenza ntina ete Yehova alingaka ngai mingi mpenza mpe azali kolɛngɛla ngai. Mpe ntango nazali kolendisa bandeko na lisangá, nakozala sikoyo na likoki ya komonisa bango ete Yehova alingaka bango mpe azwaka bango na valɛrɛ mingi.”

Babandaki kobongola Biblia yango na mobu 1996. Na nsima, na sanza ya 07/1999, babimisaki Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na monɔkɔ ya Croate mpe ya Serbe. Mbula nsambo na nsima, na mobu 2006, babimisaki Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na minɔkɔ yango nyonso mibale.

Tondimi na motema mobimba ete Babiblia (Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika) yango oyo babongisi lisusu na monɔkɔ ya Croate mpe ya Serbe, oyo ekomami malamu mpe ezali pɛtɛɛ, ekosalisa bato oyo bakotánga yango báyeba ete “liloba ya Nzambe ezali na bomoi.”​—Baebre 4:12.