Lakisá makambo oyo ezali na kati

28/09/2023
RÉPUBLIQUE DÉMOCRATIQUE DU CONGO

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu ebimi na Lingala mpe mikanda mosusu ya Biblia na minɔkɔ motoba

Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu ebimi na Lingala mpe mikanda mosusu ya Biblia na minɔkɔ motoba

Na mokolo ya mibale, 29/08/2023, Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu ebimaki na Lingala. Longola yango, mikanda mosusu ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ebimaki mpe na minɔkɔ ya Alur, Kinande, Kipende, Kisonge, Kituba, mpe Uruund. Ndeko Mark Sanderson, ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, asalaki diskur liboso ya bato 75 715 oyo bayanganaki na Stade de Martyrs ya Kinshasa (R.D.C) na liyangani ya etúká oyo ezalaki na motó ya likambo ‘Monisá motema molai’! Bato mosusu 219 457 balandaki liyangani yango na video na bandako ya mayangani 53 mpe bisika mosusu na teritware mobimba ya filiale. Babiblia ya papye ya Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu na Lingala mpe Libongoli ya Mokili ya Sika ya Makomami ya Grɛki ya bokristo na Kisonge ekabolamaki. Babiblia yango mosusu ya papye ekokabolama mosika te. Kasi, Babiblia yango nyonso etyamaki mbala moko na Internet mpo bato bázwa na baaparɛyi na bango. Babiblia ebimaki yango oyo:

Alur (Makomami ya Ebre: Mokanda ya Ebandeli tii Yobo, mpe Loyembo ya Salomo)

  • Bato pene na 750 000 balobaka monɔkɔ ya Alur, mingimingi na Mahagi

  • Basakoli 1 609 bapesaka mabɔkɔ na masangá 45 ya monɔkɔ ya Alur

  • Batatoli ya Yehova babandaki kobongola mikanda na Alur na 2013

  • Biro ya kobongola (ADT) ezalaka na Bunia

Kinande (Makomami ya Grɛki ya Bokristo)

  • Bato pene na 903 000 balobaka Kinande na Ituri mpe na Nord-Kivu

  • Basakoli 4 793 bapesaka mabɔkɔ na masangá 78 ya monɔkɔ ya Kinande

  • Batatoli ya Yehova babandaki kobongola mikanda na Kinande na 1998

  • Biro ya kobongola ezalaka na Butembo

Kipende (Makomami ya Ebre: Ebandeli, Kobima, Balevi, Basambisi, Ruta, 1 Samwele ná 2 Samwele, mpe Loyembo ya Salomo)

  • Bato soki 1 milio balobaka Kipende na bitúká ya Kasai, Kwango, mpe Kwilu

  • Basakoli 3 349 bapesaka mabɔkɔ na masangá 88 ya monɔkɔ ya Kipende

  • Batatoli ya Yehova babandaki kobongola mikanda na Kipende na 1996

  • Biro ya kobongola ezalaka na Kikwit

Kisonge (Makomami ya Ebre: Ebandeli, Kobima, mpe Loyembo ya Salomo. Mpe Makomami ya Grɛki ya Bokristo)

  • Bato pene na 1 milio balobaka Kisonge, mingimingi na etúká ya Lomami

  • Basakoli 1 043 bapesaka mabɔkɔ na masangá 31 ya monɔkɔ ya Kisonge

  • Batatoli ya Yehova babandaki kobongola mikanda na Kisonge na 2006

  • Biro ya kobongola ezalaka na Kinshasa

Kituba (Makomami ya Grɛki ya Bokristo: Matai, Marko, Baroma, 1 Bakorinti ná 2 Bakorinti, Bagalatia, mpe Bafilipi)

  • Bato koleka 12 milio balobaka Kituba, na sudi ya Congo (Brazzaville), Angola mpe na Gabon

  • Basakoli 2 137 bapesaka mabɔkɔ na masangá 30 ya monɔkɔ ya Kituba

  • Biro ya kobongola efungwamaki na Pointe-Noire na 2019

Lingala (Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu)

  • Bato koleka 40 milio balobaka Lingala

  • Basakoli 74 023 bapesaka mabɔkɔ na masangá 1 266 ya monɔkɔ ya Lingala

  • Batatoli ya Yehova babandaki kobongola mikanda na Lingala na bambula 1960

  • Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika na Lingala ebimaki na 2009

  • Biro ya kobongola ezalaka na Kinshasa

Uruund (Makomami ya Grɛki ya Bokristo: Matai, Marko, Baroma, mpe 1 Bakorinti)

  • Bato pene na 153 000 balobaka Uruund, mingimingi na etúká ya Lualaba

  • Basakoli 553 bapesaka mabɔkɔ na masangá 19 ya monɔkɔ ya Uruund

  • Batatoli ya Yehova babandaki kobongola mikanda na Uruund na 1994

  • Biro ya kobongola ezalaka na Kolwezi

Babiblia wana ya sika mpe oyo babongisi lisusu ekosalisa mpenza bandeko oyo bazali na bateritware epai minɔkɔ yango elobamaka. Mosakoli moko oyo alobaka Kituba alobaki boye: “Tozalaki komona ete mbala mingi bato bazalaki koyoka biso te mpo tozalaki kosalela mikanda oyo ekomamaki na monɔkɔ na bango te. Na ndakisa, ntango tozalaki kotánga Biblia na Français, bazalaki kokanga ntina te. Lokola tozwi libongoli oyo ya sika, ata soki moto ayebi kotánga malamu te, akoki koyoka mpe kozwa matomba na Liloba ya Nzambe.” Motángi moko alobaki boye mpo na matomba ya Libongoli ya Mokili ya Sika oyo babongisi lisusu na Lingala: “Kozwa Biblia oyo esaleli elobeli ya pɛtɛɛ mpo na kosalela na teritware ekozala lokola tozali na eloko moko mpenza ya motuya oyo tosengeli koyebisa na bato oyo tokutanaka na bango.”

Bato 75 715 bazali na liyangani ya etúká na Kinshasa

Tondimisami ete Yehova akopambola bandeko na biso mpo básalela Babiblia yango mpo na kosimba mitema ya baoyo bazali na “mposa makasi ya koyoka liloba ya Nzambe.”​—Misala 13:7.