Lakisá makambo oyo ezali na kati

20 SANZA YA 3, 2019
TURKMÉNISTAN

Bahram Hemdemov abimi na bolɔkɔ

Bahram Hemdemov abimi na bolɔkɔ

Na mokolo ya 13/02/2019, Bahram Hemdemov, oyo azali na mbula 55, abimaki na bolɔkɔ na Turkménistan nsima ya kosala mbula minei na bolɔkɔ ya Seydi (LB-E/12). Akutani lisusu na mwasi na ye, Gulzira, mpe na bana na bango minei. Na mokolo ya 14/03/2015, bakangaki ndeko Hemdemov kaka mpo azalaki kotambwisa likita moko ya losambo na ndako na ye na etúká ya Turkmenabat. Na mokolo ya 19/05/2015, tribinale ya etúká ya Lebap ekweisaki ye na likambo. Ntango Hemdemov azalaki na bolɔkɔ, Guvɛrnema ya Turkménistan ebimisaki bakangami oyo bazalaki na bolɔkɔ mbala misato mobimba na mbula moko kasi mbala wana nyonso babimisaki ye te​—atako na kati ya bato oyo babimaki na bolɔkɔ ezalaki mpe na babomi-bato. Na mokolo ya 15/08/2016, ndeko Hemdemov amemaki likambo yango na ebongiseli ya ONU oyo etalelaka ntomo ya moto (CCPR). Ebongiseli yango ya ONU ezali naino kotalela likambo yango. Batatoli ya Yehova 11 bazali tii sikoyo na bolɔkɔ na Turkménistan mpo baboyaki kosala mosala ya soda atako bikateli 10 ya CCPR ezali kokweisa guvɛrnema ndenge ezali kokanga mpe konyokola bilenge oyo baboyi mosala ya soda mpo na kotosa lisosoli na bango.