Lakisá makambo oyo ezali na kati

26/12/2019
VÉNÉZUÉLA

Kampanye sipesiale ya mosala ya kosakola esalemi na engumba ya mosika na Venezuela

Kampanye sipesiale ya mosala ya kosakola esalemi na engumba ya mosika na Venezuela

Batatoli ya Yehova basali milende mpenza mpo na kosakola na mboka moko ya kati na nɔrdi-westi ya Venezuela, na esanga ya Guajira. Kampanye yango ebandaki na mokolo ya 15/07/2019 mpe esukaki na mokolo ya 31/12/2019. Basakoli 640 oyo basanganaki na kampanye yango basalaki ngonga koleka 32 000 na mosala ya kosakola mpe babandaki boyekoli ya Biblia na bato pene na 2 000.

Teritware yango ezalaki monene mpenza, transport ezalaki mpasi, mpe basakoli mingi te bazalaki kofanda wana. Yango wana, bato mingi ya engumba yango basololá naino te na Batatoli ya Yehova mpe batikalá naino te koyoka nkombo ya Nzambe. Mpo na ntina yango nde bandeko basalaki mpenza milende mpo na kosalisa bato yango. Nkita ya Venezuela ezali mpenza ya kobeba, bato mingi bazali na misala te mpe biloko ezali ntalo mingi, yango wana basakoli mosusu basalaki ekonzo na boumeli ya bansanza mingi mpe misusu batɛkaki biloko na bango mpo bazwa likoki ya kopesa mabɔkɔ na kampanye yango.

Mosala ya kosakola esalemaki na Espagnol mpe na Wayúunaiki, monɔkɔ ya ba-Wayúu, oyo bazali bankolo-mabele ya engumba yango. Basakoli moke kaka bayebaki monɔkɔ ya Wayúunaiki, yango wana bandeko oyo babongisaki kampanye yango balakisaki basakoli ndenge ya kosalela mikanda mpe bavideo na biso na monɔkɔ ya Wayúunaiki, mpe batángaki mikanda oyo elimboli mimeseno ya bato ya Wayúu mpo na komibongisa mpo na kampanye yango.

Mwasi moko asepelaki mingi koyoka nsango malamu na monɔkɔ na ye, na yango andimaki komema basakoli na mwa etuluku moko ya mosika na engumba yango, epai oyo mpe bandeko mpe baninga na ye mosusu bazalaki. Mwa etuluku ya bandeko balamukaki na ngonga ya 3:30 mpo bámibongisa mpo na vizite yango, bakendaki kokutana na mwasi yango epai na ye na ntɔngɔntɔngɔ mpe basimbaki nzela bakendaki, batambolaki pene na ngonga moko na nzela.

Ntango bakómaki, mwasi yango abelelaki na mongongo makasi bato nyonso, alobaki: “Bobima! Bobima! Namemeli bino Nzambe!” Basakoli bakamwaki komona ndenge bato babimaki na bandako na bango ná bakiti mpe bafandaki mpo na koyoka nsango malamu. Bato yango balobaki ete wana ezalaki mbala ya liboso moto aya koyebisa bango makambo ya Nzambe, mpo na komonisa botondi na bango balambelaki basakoli yango 17 biloko ya kolya.

Mwasi yango oyo akambaki basakoli asepelaki mingi na boyambi ya bato ya mboka, mpe andimaki kotambwisa basakoli na bamboka misato mosusu ya engumba. Na mboka mokomoko, azalaki kobelela bato mpo báya koyoka nsango malamu. Na mpokwa ya mokolo yango, liboso ya kokabwana na mwasi yango mpe bato mosusu oyo bateyaki na mboka yango, basakoli balelaki mpe bayembaki loyembo ya bokonzi na Wayúunaiki.

Yehova alingi moto nyonso ayoka nsango ya Biblia. Bakampanye ya mosala ya kosakola lokola oyo na Venezuela, ezali kondimisa biso ete Yehova azali kopambola milende oyo basaleli na ye bazali kosala mpo na “kosakola nsango malamu ya makambo ya malamu” na bamboka oyo eleki mosika na mokili.​—Baroma 10:14, 15.