Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova bazali na bakonzi oyo bazwaka lifuti?

Batatoli ya Yehova bazali na bakonzi oyo bazwaka lifuti?

 Ndenge ezalaki na lisangá ya bokristo ya liboso, Batatoli ya Yehova bazali na bakonzi te kati na bango. Batatoli ya Yehova nyonso oyo bazwá batisimo bazali bato oyo bandimami na Nzambe mpe bamipesaka na mosala ya kosakola nsango malamu mpe ya koteya bato. Lisangá mokomoko ya Batatoli ezalaka na bato soki 100. Mibali oyo bayebi makambo mingi ya elimo bazali “bankulutu” mpe batambwisaka makambo na lisangá mokomoko. (Tito 1:5) Kasi, bafutamaka te mpo na misala yango.