Lakisá makambo oyo ezali na kati

Batatoli ya Yehova mpe basalaka mosala ya misionɛrɛ?

Batatoli ya Yehova mpe basalaka mosala ya misionɛrɛ?

 . Ata soki tofandi wapi, biso nyonso Batatoli ya Yehova tosalaka makasi tózala lokola bamisionɛrɛ: tolobelaka mateya na biso mbala na mbala epai ya bato oyo tokutanaka na bango.​—Matai 28:19, 20.

 Longola yango, Batatoli ya Yehova mosusu bakendaka mwa ntango to mpe libela mpo na kosakola na bamboka mosusu ya ekólo na bango epai bato mingi bayoki naino te nsango malamu oyo ezali na Biblia. Batatoli ya Yehova mosusu bakendaka na mikili mosusu mpo na komipesa na kosakola. Bazalaka na esengo mpo bazali kosalisa na kokokisama ya esakweli ya Yesu oyo ete: “Bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”​—Misala 1:8.

 Na 1943, tofungolaki eteyelo moko mpo na koteya bamisionɛrɛ na biso mosusu. Banda wana, Batatoli soki 8 000 bakɔtá eteyelo yango, oyo tobengaka Gileade, Eteyelo ya Watchtower mpo na mateya ya Biblia.