Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya Pasika te?

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya Pasika te?

Makambo oyo bato bakanisaka

 Makanisi ya bato: Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya Pasika te mpo bazali bakristo te.

 Likambo ya solo: Tondimaka ete Yesu Kristo azali Mobikisi na biso, mpe tosalaka makasi ete ‘tólanda matambe na ye malamumalamu.’​—1 Petro 2:21; Luka 2:11.

 Makanisi ya bato: Bondimaka te ete Yesu asekwaki.

 Likambo ya solo: Tondimaka ete Yesu asekwá; toyebi ete lisekwa yango nde esimbi kondima ya bakristo nyonso mpe tomonisaka yango polele na mosala na biso ya kosakola.​—1 Bakorinti 15:3, 4, 12-15.

 Makanisi ya bato: Bokipaka te ndenge bana na bino bazangaka esengo ya fɛti ya Pasika.

 Likambo ya solo: Tolingaka bana na biso​—tosalaka nyonso mpo na koteya bango mpe kosalisa bango bázala na esengo.​—Tito 2:4.

Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalaka fɛti ya Pasika te?

  •   Milulu ya fɛti ya Pasika eutá na Biblia te.

  •   Yesu alobaki ete tókanisaka nde liwa na ye, kasi lisekwa na ye te. Tokanisaka liwa ya Yesu mbula na mbula na dati oyo eyokani na kalandriye ya kala (calendrier lunaire).​—Luka 22:19, 20.

  •   Tondimaka te ete fɛti ya Pasika ezali malamu na miso ya Nzambe mpo milulu na yango eutá na milulu ya bafɛti kala ya makambo ya kobota. Nzambe asɛngaka ‘tókangama kaka na ye,’ mpe ayokaka nkanda soki bato basangisi losambo na ye ná milulu oyo andimaka te.​—Kobima 20:5; 1 Bakonzi 18:21.

 Tóndimaka ete ekateli oyo tozwá ya koboya kosala fɛti ya Pasika eutá mpenza na Biblia, oyo ezali kolendisa bato básalela “bwanya ná likoki ya kokanisa,” na esika ya kolanda kaka mimeseno ya bato. (Masese 3:21; Matai 15:3) Soki libaku emonani, toyebisaka bato ndenge oyo totalelaka fɛti ya Pasika; atako bongo totikaka moto na moto asala oyo ye alingi.​—1 Petro 3:15.