Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ndenge nini Batatoli ya Yehova bazwá nkombo yango?

Ndenge nini Batatoli ya Yehova bazwá nkombo yango?

 Yehova ezali nkombo ya Nzambe, ndenge Biblia emonisi yango, bato mosusu babengaka ye Yawe. (Kobima 6:3; Nzembo 83:18) Motatoli azali moto oyo alobaka mpo na kokɔtela makanisi to makambo oyo andimi.

 Na yango, nkombo na biso, Batatoli ya Yehova emonisaka ete tozali bakristo oyo balobelaka makambo oyo etali Yehova, Mozalisi ya biloko nyonso. (Emoniseli 4:11) Topesaka litatoli na nzela ya bizaleli na biso ya malamu mpe ya mosala ya kosakola makambo oyo toyekolá na Biblia.​—Yisaya 43:10-12; 1 Petro 2:12