Lakisá makambo oyo ezali na kati

Ebele ya bato bayei kotala Betele ya Amerika ya ntei

Ebele ya bato bayei kotala Betele ya Amerika ya ntei

Na 2015, pene na bato 175 000 basalaki vizite na Betele ya Batatoli ya Yehova na Amerika ya ntei, na Mexique, elingi koloba bato 670 na mokolo! Mingi kati na bato yango bayaki na bituluku, basalaki mobembo ya mikolo mingi na babisi. Basusu bamibongisaki mwa basanza liboso mpo na kosala mobembo yango.

“Ebongiseli mpo na kokende na Betele”

Basusu bamipimelaki makambo mingi mpo na kosala vizite yango. Na ndakisa, bandeko mingi ya lisangá ya etúká ya Veracruz na Mexique bazalaki te na mbongo ya kofuta tike mpo na mobembo yango ya kilomɛtrɛ 550 na bisi. Yango wana basalaki ebongiseli moko oyo babengaki “Ebongiseli mpo na kokende na Betele.” Basalaki bituluku mpo na kolamba mpe kotɛka biloko balambá. Bazwaki mpe milangi ya plastiki ya kala mpe babongisaki yango lisusu. Nsima ya sanza misato, bazwaki mbongo oyo ekoki mpo na kosala mobembo yango.

Ezalaki mpenza na ntina básala milende nyonso wana? Balobi ete ezalaki na ntina. Na ndakisa, Lucio, elenge mobali moko ya lisangá yango, akomaki boye: “Kosala vizite na Betele esalisi ngai namityela mikano mosusu ya elimo, mpe sikoyo nazali komipesa mingi na lisangá.” Mpe Elizabeth, oyo azali na mbula 18, alobaki ete: “Na Betele, namonaki mpenza bolingo ya solosolo oyo ezalaka epai ya baoyo basalelaka Yehova. Yango etindaki ngai nabakisa milende na mosala ya Nzambe, yango wana nakómaki kolekisa ngonga mingi na mosala ya kosakola nsango malamu.”

Bayaka ebele mpenza

Na bantango mosusu, ebele ya bato bayaka na Betele kosala vizite kaka na mokolo moko. Bandeko oyo batambwisaka bapaya basalaka makasi mpo na koyamba bapaya wana nyonso. Mwasi moko na nkombo Lizzy alobi: “Komona ndenge ebele ya bato bayaka, elendisaka ngai. Kondima na ngai elendisamaka ntango namonaka ndenge baoyo bayei vizite basepelaka mpe balobelaka makambo oyo bamipimeli mpo na koya na Betele.”

Mpo na koyamba ebele ya bato oyo bayaka kosala vizite na Betele, bandeko oyo basalaka misala mosusu na Betele batambwisaka mpe bapaya yango. Atako ebakiselaka bango mosala, basepelaka koyamba bapaya yango. Ndeko mobali moko na nkombo Juan, alobi: “Nsima ya kotambwisa bapaya, namonaka esengo oyo bayokaka mpe namonaka ete kotambwisa bango ezali mosala ya mpunda te.”

“Bana balingaka yango”

Bana mpe basepelaka kosala vizite na Betele. Noriko, ndeko mwasi oyo asalaka na Departema ya informatique, alobi: “Natunaka bana oyo bayei kosala vizite soki bakolinga kosala na Betele. Bango nyonso balobaka: Ɛɛ!” Esika oyo bana balingaka mingi ezali “esika batyá elilingi ya Caleb.” Kuna, bakoki kotɛlɛma pene ya elilingi ya Caleb ná Sofia, oyo basalaka video Kómá moninga ya Nzambe mpo na kokanga bafɔtɔ. Noriko alobi: “Bana balingaka yango mpenza.”

Bana mingi balobaka ete basepelaka na mosala oyo esalemaka na Betele. Na ndakisa, Henry, mwana moko ya moke ya mobali na Mexique, abombaki mbongo na mwa kɛsi moko mpe apesaki yango makabo ntango ayaki na Betele. Akomaki boye na mwa nɔti oyo atyaki na likabo yango: “Bósalela mbongo oyo mpo na kobimisa mikanda mingi mosusu. Matondi ndenge bozali kosalela Yehova.”

Tobengisi mpe yo

Na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova batambwisaka bapaya oyo bayei kosala vizite na Babetele mpe na baimprimeri na bango. Soki okosepela kokende kosala vizite na Betele moko, totombeli yo boyei malamu. Tozali na elikya ete okosepela na vizite yango. Okoki koyeba makambo mosusu etali vizite yango na esika bakomi MAKAMBO ETALI BISO > BABIRO MPE VIZITE.