Lakisá makambo oyo ezali na kati

Libɔndisi mpe lisalisi oyo ebongi mpo na baoyo bazali kobɛla

Libɔndisi mpe lisalisi oyo ebongi mpo na baoyo bazali kobɛla

Bato oyo bazali na maladi makasi bakoki kokóma komitungisa mpambampamba mpe soki esɛngi bázwa lisalisi ya monganga, mbala mingi mitungisi yango ebakisamaka. Boye, ndenge zulunalo moko ya minganga elobi, “baankɛtɛ emonisi ete kokipe ndenge moto ya maladi azali komiyoka mpe kokokisa bamposa na ye ya elimo ezali na ntina mingi mpo na sante na ye.” *

Mpo na kokokisa bamposa yango, Batatoli ya Yehova bapesaka libɔndisi ya elimo mpe lisalisi oyo ebongi epai ya bandeko ya lingomba na bango oyo bakɔti opitale. Bankulutu bakendaka kotala bandeko ya masangá na bango oyo bazali kobɛla. Bongo soki Motatoli ya Yehova azali kozwa lisalisi ya monganga na opitale oyo ezali mosika na esika afandaka? Na bingumba minene na mokili mobimba, Batatoli ya Yehova babongisá bituluku ya bandeko mpo na kotala bato ya maladi to Groupes de visites aux malades (GVM). Bankulutu ya masangá oyo bazali na bituluku yango bakendaka mbala na mbala na balopitalo mpo na kosalisa Batatoli ya Yehova oyo bazali maladi ná bato ya mabota na bango oyo bauti bisika mosusu to na bikólo mosusu kasi bayei wana mpo na kozwa lisalisi ya monganga. Bavolontɛrɛ koleka 28 000 bazali na kati ya bituluku soki 1 900 oyo ekendaka kotala bato ya maladi na bakɔntina motoba. *

Libɔndisi nini ya elimo bandeko ya GVM bapesaka?

Ndeko moko ya etuluku yango na nkombo William, alobi boye: “Kokende kotala Batatoli ya Yehova ná bato ya mabota na bango oyo bazali Batatoli ya Yehova te kaka mpo na kosolola na bango mpe koyoka bango, ebɔndisaka bango mpenza. Namonisaka bango ete Yehova Nzambe ayebi likambo na bango mpe akipaka bango. Bato ya maladi ná bandeko ya mabota na bango basepelaka soki tobondeli mpo na bango.”

Mingi basepelaki na bavizite oyo bandeko ya etuluku yango basalaki mpo na kolendisa bango. Awa na nse, ezali mwa bandakisa oyo euti na États-Unis, epai bandeko pene na 7 000 oyo bazali na bituluku yango bakendaka kotala bato ya maladi.

  • Priscilla alobaki boye: “Mersi ndenge boyaki kotala papa na ngai na opitale nsima ya kosala AVC. Bavizite yango esimbaki mpenza motema na ye! Koyeba ete ebongiseli ya boye ezalaka ekamwisaki ye. Namoni bavizite na bino esalisaki ye abika noki.”

  • Ndeko mwasi moko Motatoli ya Yehova abɛlaki mpe na nsima akufaki; mwana na ye, Ophilia, alobaki na bamonisi ya bituluku yango boye: “Bavizite na bino ezalaki na ntina mingi mpo na mama na ngai! Ayebaki ete Yehova nde atindaki bino. Mersi mingi mpo na bolingo na bino.”

  • Moto moko ya maladi abulunganaki mpe amitungisaki ntango bayebisaki ye ete atikali kaka na mikolo moke ya bomoi. James, ndeko moko ya etuluku oyo etalaka bato ya maladi, alekisaki ntango elongo na ye mpe alakisaki ye libɔndisi oyo Biblia epesi na Bafilipi 4:6, 7. James alobi: “Ntango nakendaki kotala ye na mokolo elandaki, makanisi na ye ebongwanaki mpenza. Atako minganga bayebisaki ye ete atikali na mikolo ya kotánga, akómaki sikoyo kotya motema na lisalisi ya Yehova mpe alendisaki ngai mpenza!”

Lisalisi nini mpenza GVM epesaka bato ya maladi?

Pauline, oyo mobali na ye akufaki na opitale oyo ezalaki mosika na ndako na bango, akomaki boye: “Mersi mingi ndenge bosalisaki biso na boumeli ya eleko ya mpasi oyo libota na biso elekisaki. Koyeba kaka ete bokoya na opitale kotala biso na butu, atako bosengelaki kokende mosala mokolo oyo elandaki, ebɔndisaki biso mpenza. Mersi mingi ndenge bozwaki bibongiseli mpo biso nyonso 11 tózwa bisika ya kolala mpe ndenge bozalaki kosolola na biso na boumeli ya ntango wana nyonso. Napesi Yehova mpe ebongiseli na ye mersi mpo na lisungi wana oyo ebɔndisaki biso.”

Nicki, Gayle mpe Robin basalaki aksida ya motuka na ntaka ya kilomɛtrɛ 300 kolongwa na ndako na bango. Carlos, ndeko moko ya etuluku ya GVM, azwaki nsango yango mpe akutanaki na bango na opitale ntango bakómaki. Carlos alobi, “Nayebisaki bango nakosalisa bango na eloko nyonso oyo bazali na mposa na yango mpe nakómaki kobatela mbwa ya Nicki mpo ye akɔta epai ya monganga mpo na kozwa lisalisi oyo asengelaki na yango.” Na nsima, Curtis, ndeko mosusu ya etuluku yango ayaki ná mwasi na ye. Batikalaki na opitale tii ntango bandeko ya libota ya bato ya maladi bakómaki nsima ya ebele ya bangonga. Mobali moko oyo azalaki wana alobaki: “Bango nyonso misato babɔndisamaki mpo na lisalisi oyo bazwaki. Kasi Robin, leki ya Nicki ya mwasi oyo azali Motatoli ya Yehova te, akamwaki na lisalisi nyonso oyo bandeko ya GVM bapesaki.”

^ par. 2 “Kokokisa bamposa ya bato ya maladi, ezala ya makanisi to ya elimo,” ebimaki na zulunalo (The Joint Commission Journal on Quality and Patient Safety), Decembre 2003, Volimi 29, No. 12, lokasa 661.

^ par. 3 Ndenge moko na bankulutu nyonso na masangá ya Batatoli ya Yehova, baoyo bazalaka na bituluku yango bapesaka mpe mabɔkɔ na masangá esika bazali mpo na kobatela lisangá, koteya mpe kosakola nsango malamu. Bafutaka bango te mpo na misala yango, kasi basalaka yango na bolingo na bango moko mpe na esengo.​—1 Petro 5:2.