Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

JW LIBRARY

Bandá kosalela JW Library​—Android

Bandá kosalela JW Library​—Android

Boyei malamu na JW Library. Programɛ oyo ebongisami mpo na kotánga mpe koyekola Biblia. Mpo omona makambo oyo ezali na kati, fungolá Menu. Mpo na kofungola yango, bimisá yango na ngámbo ya lobɔkɔ ya mwasi to bɛtá na elembo ya menu, oyo ezali na likoló na lobɔkɔ ya mwasi.

 Biblia

Okobɛta esika bakomi Bible mpo na kotánga mpe kotya Babiblia mosusu. Bɛtá mokanda moko ya Biblia, mpe na nsima mokapo moko mpo na kobanda kotánga. Ntango ozali kotánga, okoki mpe komona maloba na nse ya lokasa, mitindami, mpe Babiblia mosusu soki obɛti elembo ya katikati na bilembo oyo ebimi na vɛrsɛ yango.

Mpo na koluka vɛrsɛ mosusu, fungolá menu mpe bɛtá lisusu esika bakomi Bible mpo ozonga na liste ya mikanda ya Biblia.

 Mikanda

Soki obɛti esika bakomi Publications, okomona mikanda, biloko ya koyoka, mpe bavideo. Bɛtá mokanda moko, na nsima lisolo moko, mpo na kobanda kotánga. Ntango ozali kotánga, okoki komona mpe bavɛrsɛ. Bɛtá vɛrsɛ moko mpo omona yango. Bɛtá yango lisusu kuna na esika ebimi mpo omona yango na kati ya Biblia.

Mpo na komona mokanda mosusu, fungolá menu mpe bɛtá lisusu esika bakomi Publications mpo ozonga na liste ya mikanda.

 Mokapo ya mokolo

Soki ofungoli menu, mpe obɛti esika bakomi Texte du jour, okomona mokapo ya mokolo.

 Na Internet

Makambo oyo ezali na eteni oyo bakomi En ligne na menu ekomema yo na basite ya Internet na biso.

 Mpo na kozwa makambo ya sika

Mpo omona makambo ya sika oyo etyami na JW Library, kɔtáká na Internet mbala na mbala.

Ekozala malamu ozwa makambo ya sika na Internet mpo na aparɛyi na yo Android. Mpo na koyeba kosala yango, finá na adrɛsi oyo: https://support.google.com/nexus/answer/4457705.

Soki olingi, okoki kopesa aparɛyi na yo nzela ya kozwaka mbala moko makambo ya sika soki okɔti na Internet. Mpo na koyeba kosala yango, finá na adrɛsi oyo: https://support.google.com/googleplay/answer/113412.