Lakisá makambo oyo ezali na kati

Biblia elobi nini mpo na porno mpe kotindelana bamesaje ya makambo ya kosangisa nzoto?

Biblia elobi nini mpo na porno mpe kotindelana bamesaje ya makambo ya kosangisa nzoto?

Eyano ya Biblia

 Biblia elobeli polele te porno mpe kotindelana bamesaje ya makambo ya kosangisa nzoto na Internet to makambo mosusu ya ndenge wana. Kasi, emonisi polele ndenge Nzambe atalelaka makambo oyo elendisaka bato básala pite to oyo etindaka moto akóma na makanisi oyo ebongi te na oyo etali kosangisa nzoto. Talá bavɛrsɛ oyo ya Biblia:

  •   “Bóboma binama ya nzoto na bino ya mabele na likambo ya pite, mbindo, mposa ya kosangisa nzoto.” (Bakolose 3:5) Porno esalisaka moto aboma bamposa ya mabe te, kutu epelisaka yango nde kopelisa. Ekómisaka moto mbindo to salite na miso ya Nzambe.

  •   “Moto nyonso oyo azali kokoba kotala mwasi tii ayoki ye mposa asali na ye ekobo na motema.” (Matai 5:28) Bililingi ya makambo ya kosangisa nzoto epesaka moto makanisi ya mabe oyo ememaka na pite to ekobo.

  •   “Pite mpe mbindo ya ndenge nyonso to lokoso etángama ata kotángama te na kati na bino, ndenge mpenza ebongi na basantu.” (Baefese 5:3) Ata mpo na kosala masɛki, tosengeli te kolobela makambo ya mbindo; tosengeli kotala yango te, ata mpe kotánga yango te na babuku.

  •   “Misala ya nzoto ezali komonana polele, mpe ezali pite, mbindo, . . . mpe makambo oyo ekokani na oyo wana. Mpo na makambo yango, nazali kokebisa bino, ndenge mpe nakebisaki bino liboso, ete baoyo basalaka makambo ya ndenge wana bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (Bagalatia 5:19-21) Bato oyo batalaka porno, baoyo batindelanaka bamesaje ya makambo ya kosangisa nzoto, ezala na Internet to na telefone, bazali mbindo na miso ya Nzambe. Soki tokómi na momesano ya kosala makambo wana, Nzambe akoki kobwaka biso libela.