Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nyama mabe ya mitó nsambo oyo Emoniseli 13 elobeli ezali nini?

Nyama mabe ya mitó nsambo oyo Emoniseli 13 elobeli ezali nini?

Eyano ya Biblia

 Emoniseli 13:1 elobeli nyama mabe moko ya mitó nsambo. Nyama mabe yango ezali ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba.

  •   Ezali na bokonzi, na nguya mpe kiti ya bokonzi; yango emonisi ete ezali ebongiseli ya politiki.​—Emoniseli 13:2.

  •   Ezali koyangela “mabota nyonso mpe mikili nyonso mpe minɔkɔ nyonso mpe bikólo nyonso”; na yango, ezali guvɛrnema ya ekólo moko boye te.​—Emoniseli 13:7.

  •   Ezali na bilembo nyonso ya banyama mabe minei oyo esakweli ya Danyele 7:2-8 elobeli; na ndakisa ezali lokola nkoi, ezali na makolo ya urse, na monɔkɔ ya nkɔsi, mpe na maseke zomi. Banyama oyo esakweli ya Danyele elobeli ezali elilingi ya bakonzi to bokonzi ya politiki oyo eyangelaki baampire, moko nsima ya mosusu. (Danyele 7:17, 23 Na yango, nyama mabe ya Emoniseli Mokapo 13 ezali ebongiseli moko ya politiki oyo esangisi baguvɛrnema ebele.

  •   Ebimi na “mbu,” elingi koloba, bato ya mokili oyo, oyo basalaka baguvɛrnema yango.​—Emoniseli 13:1; Yisaya 17:12, 13.

  •   Biblia elobi ete motángo, to nkombo, ya nyama yango​—666—​ezali “motángo ya moto.” (Emoniseli 13:17, 18) Maloba yango emonisi ete nyama ya Emoniseli Mokapo 13 ezali ebongiseli ya bato, kasi ya elimo to ya demo te.

 Bikólo bayokaka te na makambo mingi, kasi bazalaka na bomoko mpenza na ekateli na bango ya kobatela bokonzi na bango na esika ya komikitisa na nse ya Bokonzi ya Nzambe. (Nzembo 2:2) Bakosangana mpe mpo na kobundisa mampinga ya Nzambe oyo Yesu Kristo akokamba na Armagedone. Kasi na etumba yango, bikólo ekobebisama.​—Emoniseli 16:14, 16; 19:19, 20.

‘Maseke zomi mpe mitó nsambo’

 Eloko oyo ekosalisa biso tóyeba ndimbola mpenza ya ‘maseke zomi mpe mitó nsambo’ ya nyama mabe ya Emoniseli Mokapo 13 ezali “elilingi ya nyama mabe” oyo mokanda ya Emoniseli elobeli na nsima; nyama yango ezali ya langi ya motane makasi mpe ezali na mitó nsambo ná maseke zomi. (Emoniseli 13:1, 14, 15; 17:3) Biblia elobi ete mitó nsambo ya nyama yango ya motane elimboli “bakonzi [to baguvɛrnema] nsambo.”​—Emoniseli 17:9, 10.

 Ndenge moko mpe, mitó nsambo ya nyama mabe oyo Emoniseli 13:1 elobeli emonisi baguvɛrnema nsambo: bikólo minene oyo elekaki nguya na mokili mobimba na eleko moko boye mpe enyokolaki basaleli ya Nzambe: Ezipito, Asiri, Babilone, Bamede ná Baperse, Grɛsi, Roma, mpe Anglo-américain. Tóbosana te ete Biblia esaleli mitángo mosusu na ndenge ya elilingi. Na ndakisa, motángo zomi emonisaka eloko oyo ezali ya kokoka. Soki maseke zomi emonisi bikólo nyonso, ezala ya mike to ya minene, boye, motole oyo ezali likoló ya liseke mokomoko emonisi ete ekólo mokomoko ezali koyangela nzela moko na ekólo oyo ezali eleki na nguya na mokili mobimba.