Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nasala nini soki moto azali kotungisa ngai mpo tósangisa nzoto?

Nasala nini soki moto azali kotungisa ngai mpo tósangisa nzoto?

Eyano ya Biblia

 Talá mwa batoli oyo euti na Biblia:

  1.   Bósuka kaka na makambo ya mosala. Zalá na boboto mpe na limemya epai ya baninga na yo ya mosala; kasi boboto yango eleka mpe ndelo te mpo ekoki komonisa ete okondima soki basɛngi yo bósangisa nzoto.​—Matai 10:16; Bakolose 4:6.

  2.   Zalá na molato ya malamu. Bilamba elobaka. Biblia esɛngi biso ete na molato na biso, ‘tólekisaka ndelo te mpe tózala na makanisi malamu.’​—1 Timote 2:9.

  3.   Yebá kopona baninga. Basi mosusu bandimaka to kutu basepelaka soki mibali bazali kotya bango litoi to bazali kosɛnga bango básangisa nzoto. Soki olekisaka ntango mingi na basi ya ndenge wana, mibali bakobanda mpe kosala bongo epai na yo.​—Masese 13:20.

  4.   Koyokaka maloba ya nsɔni te. Ntango bozali kobɛta masolo, longwá wana soki babandi kobɛta “masolo ya mabe, ya bozoba, to ya soni.”​—Baefese 5:4, Bible na lingala ya lelo oyo.

  5.   Komitya na komekama te. Na ndakisa, zalá ekɛngɛ soki moto asɛngi yo bótikala na biro nsima ya mosala mpe ayebisi yo te mpo na nini.​—Masese 22:3.

  6.   Lobá polele, kosala masɛki te. Soki moto moko azali kotungisa yo mpo bósangisa nzoto, yebisá ye polelepolele ete ekosimba te. (1 Bakorinti 14:9) Na ndakisa, okoki koloba: “Ozali kolandalanda ngai ntango nyonso, nalingaka bongo te. Tiká kosala bongo.” Okoki kokomela moto yango mokanda mpo na koyebisa ye likambo oyo asalaki, ndenge yo oyokaki, mpe ndenge olingi ete asala na mikolo ezali koya. Monisá ye polele ete ozwi ekateli yango mpo na bizaleli na yo mpe mateya oyo ondimaka.​—1 Batesaloniki 4:3-5.

  7.   Sɛngá lisalisi. Soki moto yango azali kotika kotungisa yo te, sololá na moninga moko, na ndeko moko ya libota, moninga ya mosala, to moto mosusu oyo ayebi kosalisa bato oyo bakutani na likambo ya ndenge wana. (Masese 27:9) Bato mingi oyo bazalaki kotungisa bango mpo básangisa nzoto bazwaki makasi na nzela ya losambo. Ata soki osambelaka te, yebá ete Yehova, “Nzambe oyo alongolaka biso mawa nyonso,” akoki kosalisa yo.​—2 Bakorinti 1:3, Bible na lingala ya lelo oyo.

 Bamilio ya bato basepelaka lisusu te na esika na bango ya mosala mpo na mitungisi etali kosangisa nzoto, kasi Biblia ekoki kosalisa bango.