Lakisá makambo oyo ezali na kati

Mpo na nini Yesu akufaki?

Mpo na nini Yesu akufaki?

Eyano ya Biblia

 Yesu akufaki mpo masumu ya bato elimbisama mpe bázwa bomoi ya seko. (Baroma 6:23; Baefese 1:7) Liwa ya Yesu emonisaki mpe ete moto akoki kotikala sembo epai ya Nzambe ata soki akutani na komekama ya makasi koleka.​—Baebre 4:15.

 Tótalela ndenge nini liwa ya moto moko ekoki kokokisa makambo ebele.

  1.   Yesu akufaki mpo ‘tólimbisama masumu’​—Bakolose 1:14.

     Nzambe akelaki Adama moto ya liboso na nzoto ya kokoka, ezangá lisumu. Kasi, Adama aponaki kotosa Nzambe te. Kozanga botosi na ye to lisumu, ebebisaki bomoi ya bana na ye nyonso. Biblia elobi: “Kozanga botosi ya moto kaka moko ekómisaki ebele ya bato basumuki.”​—Baroma 5:19.

     Yesu mpe azalaki moto ya kokoka, kasi asalaki lisumu te. Yango wana, akokaki kozala “mbeka mpo na kozipa masumu na biso.” (1 Yoane 2:2) Kaka ndenge lisumu ya Adama ekɔtelá bato nyonso, liwa ya Yesu mpe elongolaka lisumu ya baoyo nyonso bamonisaka kondima epai na ye.

     Ezali lokola, Adama atɛkaki bato na lisumu mpe Yesu asikoli bato na ndenge andimaki kokufela bango. Mpo na yango, “soki moto asali lisumu, tozali na mosungi moko epai ya Tata, Yesu Kristo, moyengebene.”​—1 Yoane 2:1.

  2.   Yesu akufaki ‘mpo moto nyonso oyo akondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.’​—Yoane 3:16.

     Atako Nzambe akelaki Adama mpo azala na bomoi ya seko, lisumu na ye ememelaki ye etumbu ya liwa. Na nzela ya Adama, “lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.”​—Baroma 5:12.

     Kasi, liwa ya Yesu elongolaka lisumu mpe etumbu ya liwa mpo na baoyo nyonso bazali komonisa kondima epai na ye. Biblia elobeli likambo yango na mokuse boye: “Ndenge lisumu eyangelaki esika moko na liwa, boboto monene mpe eyangela na nzela ya boyengebene mpo na bomoi ya seko na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso.”​—Baroma 5:21.

     Toboyi te, bomoi ya bato ezali kaka mokuse tii lelo. Kasi, Nzambe alaki ete akopesa bato ya sembo bomoi ya seko mpe akosekwisa bakufi mpo bango mpe bázwela mbeka ya Yesu matomba.​—Nzembo 37:29; 1 Bakorinti 15:22.

  3.   Yesu “atosaki tii liwa,” na ndenge yango amonisaki ete moto akoki kozala sembo epai ya Nzambe ata soki akutani na komekama nini.​—Bafilipi 2:8.

     Atako Adama azalaki na nzoto mpe makanisi ya kokoka, na moimi nyonso alulaki eloko oyo ezalaki ya ye te. (Ebandeli 2:16, 17; 3:6) Na nsima, Satana monguna monene ya Nzambe alobaki ete moto moko te akotosa Nzambe kaka mpamba boye, mingimingi soki bomoi na ye ekómi na likama. (Yobo 2:4) Ata bongo, Yesu moto ya kokoka atosaki Nzambe mpe atikalaki sembo epai na ye, andimaki kutu kokufa liwa moko ya nsɔni mpe ya mpasi. (Baebre 7:26) Yango esilisaki ntembe nyonso: Moto akoki kotikala sembo epai ya Nzambe ata soki akutani na komekama nini.

Mituna etali liwa ya Yesu

  •   Mpo na nini esɛngaki Yesu anyokwama mpe akufa mpo na kosikola bato? Mpo na nini Nzambe alongolaki kaka te etumbu ya liwa?

     Mobeko ya Nzambe elobi ete “lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.” (Baroma 6:23) Na esika abombela Adama mobeko yango, Nzambe ayebisaki nde ye ete etumbu mpo na kozanga botosi ekozala liwa. (Ebandeli 3:3) Ntango Adama asalaki lisumu, Nzambe, “oyo akoki kobuka lokuta te,” akokisaki maloba na ye. (Tito 1:2) Adama alekisaki lisumu mpe lifuti na yango liwa epai ya bana na ye.

     Atako bato ya masumu babongi na etumbu ya liwa, Nzambe amoniselaki bango “bomɛngo ya boboto monene na ye.” (Baefese 1:7) Ebongiseli oyo azwaki mpo na kosikola bato; elingi koloba ndenge atindaki Yesu apesa mbeka ya kokoka, amonisaki mpenza bosembo mpe motema mawa.

  •   Yesu akufaki ntango nini?

     Yesu akufaki “na ngonga ya libwa” kobanda kotana ya ntɔngɔ, to ngonga soki ya misato nsima ya midi na Elekeli ya Bayuda (Marko 15:33-37) Dati yango ekokani na mokolo ya mitano 01/04 ya mobu 33 ya ntango na biso na kolanda kalandriye ya lelo.

  •   Yesu akufaki epai wapi?

     Babomaki Yesu na “esika oyo babengi Esika ya Mokuwa ya Motó, oyo ebengami Golgota na Ebre.” (Yoane 19:17, 18) Esika yango ezalaki na “libándá ya porte” ya Yerusaleme na mikolo ya Yesu. (Baebre 13:12) Ekoki kozala ezalaki likoló ya ngomba, mpo Biblia elobi ete basusu “bazalaki kotala na mosika” ndenge bazalaki koboma Yesu. (Marko 15:40) Kasi lelo oyo, tokoki mpenza te koloba na bosikisiki esika oyo Golgota ezalaká.

  •   Yesu akufaki ndenge nini?

     Atako mingi bakanisaka ete babakaki Yesu na ekulusu, Biblia elobi: “Ye moko amemaki masumu na biso na nzoto na ye mpenza likoló ya nzete.” (1 Petro 2:24) Baoyo bakomaki Biblia basalelaki maloba mibale ya Grɛki mpo na kolobela eloko oyo babomaki na yango Yesu​—stauros mpe xulon. Bato mingi ya mayele balobi ete maloba yango elobeli nde nzete to likonzí oyo esalemi na eteni moko ya nzete.

  •   Ndenge nini bato basengeli kokanisaka liwa ya Yesu?

     Na butu ya Elekeli ya Bayuda oyo ezalaki kosalema mbala moko na mbula, Yesu abandisaki molulu moko ya mindɔndɔ te elongo na bayekoli na ye mpe alobaki na bango boye: “Bókoba kosala boye mpo na kokanisa ngai.” (1 Bakorinti 11:24) Bangonga mingi na nsima, babomaki Yesu.

     Baoyo bakomaki Biblia bakokanisaki Yesu na mbeka ya mwana mpate ya Elekeli. (1 Bakorinti 5:7) Kaka ndenge molulu ya Elekeli ezalaki kokundwela Bayisraele kobima na bango na boombo, Ekaniseli ya liwa ya Yesu Kristo ekundwelaka bakristo ete basikolami na lisumu mpe na liwa. Elekeli oyo ezalaki kosalema mokolo ya 14 Nisana na kolanda kalandriye ya Biblia, ezalaki kosalema mbala moko na mbula; ndenge moko mpe bakristo ya liboso bazalaki kosala Ekaniseli mbala moko na mbula.

     Mbula nyonso, bamilio ya bato na mokili mobimba bakanisaka liwa ya Yesu na dati oyo eyokani na 14 Nisana.