Lakisá makambo oyo ezali na kati

Nkombo ya Nzambe Yesu?

Nkombo ya Nzambe Yesu?

Eyano ya Biblia

 Yesu ye moko amibengaki “Mwana ya Nzambe.” (Yoane 10:36; 11:4) Ata mbala moke te alobaki ete azali Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.

 Longola yango, Yesu azalaki kobondela Nzambe. (Matai 26:39) Mpe ntango ateyaki bayekoli na ye kobondela, alobaki na bango bábondelaka ete: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.”​—Matai 6:9.

 Yesu amonisaki nkombo ya Nzambe ntango azongelaki mokapo moko ya kala ya Makomami, mpe alobaki ete: “Yoká, Ee Yisraele, Yehova Nzambe na biso azali Yehova kaka moko.”​—Marko 12:29; Kolimbola Mibeko 6:4.