Lakisá makambo oyo ezali na kati

Yesu abotamaki na dati nini?

Yesu abotamaki na dati nini?

Eyano ya Biblia

 Biblia epesi dati oyo Yesu Kristo abotamaki te, ndenge babuku oyo emonisi yango:

  •   “Dati oyo Kristo abotamaki eyebani te.”​—New Catholic Encyclopedia.

  •   “Dati mpenza oyo Kristo abotamaki eyebani te.”​—Encyclopedia of Early Christianity.

 Atako Biblia epesi eyano polele te na motuna, ‘Yesu abotamaki na dati nini?’ kasi elobeli makambo mibale oyo esalemaki na mikolo ya mbotama ya Yesu, oyo etindaka bato mingi báloba ete Yesu abotamaki na mokolo ya 25 Décembre te.

Ezalaki na eleko ya malili te

  1.   Kokomisa nkombo. Mwa moke liboso Yesu abotama, Kaisala Augusto (César Auguste) akweisaki mitindo ete bato nyonso na “mabele mobimba esika bato bafandi bákomisa nkombo.” Moto nyonso asengelaki kokomisa nkombo na “engumba na ye”; na yango, bato mosusu basengelaki kosala mobembo ya pɔsɔ mobimba to koleka. (Luka 2:1-3) Na ntembe te, mobeko yango, oyo mbala mosusu ezalaki mpo na komatisa mpako to kozwa basoda ya sika, ezalaki likambo ya esengo te mpo na bato ata soki ezalaki na eleko nini na kati ya mbula; mpe Augusto akokaki te kosɛnga bato básala mibembo milai boye na eleko ya malili mpo yango elingaki nde kobakisa nkanda na bango.

  2.   Bampate. Babateli ya mpate “bazalaki kofanda libándá butu mobimba mpo na kobatela bitonga na bango.” (Luka 2:8) Buku moko (Daily Life in the Time of Jesus) elobi ete bitonga ya bampate ezalaki kofanda libándá butu mobimba “pɔsɔ moko liboso ya fɛti ya Elekeli [na nsuka ya sanza ya misato]” tii na katikati ya sanza ya zomi na moko. Na nsima ebakisi ete: “Na eleko ya malili, bampate ezalaki na esika ya kobombama malili; mpe likanisi yango ekoki mpo na komonisa ete dati oyo bato basalaka fɛti ya Noele na eleko ya malili ekoki kozala solo te, mpo Baevanzile elobi ete babateli ya mpate bazalaki na bilanga.”

Na ebandeli ya sanza ya zomi

 Tokoki koyeba ntango nini Yesu abotamaki soki totángi bambula kobanda ntango oyo akufaki, na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B. (Yoane 19:14-16) Yesu azalaki na mbula soki 30 ntango abandaki kosakola; asakolaki mbula misato ná ndambo, na yango abotamaki na ebandeli ya sanza ya zomi ya mobu 2 L.T.B.​—Luka 3:23.

Mpo na nini fɛti ya Noele esalemaka mokolo ya 25 Décembre?

 Lokola eloko moko te emonisi ete Yesu Kristo abotamaki na mokolo ya 25 Décembre, mpo na nini basalaka Noele na dati yango? Buku moko (Encyclopædia Britannica) elobi ete ekoki kozala ete bakonzi ya mangomba baponaki mokolo yango “mpo ekokana na fɛti ya bapakano ya Roma oyo bazalaki kosala mpo na kokumisa ‘mbotama ya moi,’” na ntango ya solstice d’hiver. Na kolanda buku mosusu (The Encyclopedia Americana), bato mingi ya mayele balobaka ete basalaki bongo “mpo bokristo ebenda bapagano.”