Lakisá makambo oyo ezali na kati

EBIMÁ KAKA YANGO MOKO?

Furmi oyo esukolaka ba antɛnɛ na yango (fourmi charpentière)

Furmi oyo esukolaka ba antɛnɛ na yango (fourmi charpentière)

Bopɛto ezalaka na ntina soki mwa banyama mikemike elingi epumbwa, emata na eloko to eyeba nini ezali zingazinga na yango. Na ndakisa, soki ba antɛnɛ ya furmi ezali salite, furmi yango ezalaka na likoki mingi te ya kotambola, kosolola mpe koyoka nsolo ya eloko. Yango wana Alexander Hackmann, moto moko oyo ayekolaka banyama, alobi boye: “Okomona te banyama mikemike oyo ezali salite. Eyebaka ndenge ya kosala na bisika oyo mikrobe ezali.”

Tókanisa naino: Hackmann ná baninga na ye bayekolaki mayele oyo lolenge moko ya furmi (Camponotus rufifemur) esalelaka mpo na kolongola salite na ba antɛnɛ na yango. Bamonaki ete furmi yango egumbaka lokolo na yango na ndenge oyo ekokanga eloko mpe etindikaka antɛnɛ mokomoko mpo na kolongola salite ndenge na ndenge oyo ekangami na antɛnɛ yango. Nsuki ya makasi oyo ezali na lokolo yango nde elongolaka biteni minene ya salite. Nsuki ya mikemike mpenza oyo ekokani na nsuki ya antɛnɛ na yango nde elongolaka biteni mikemike ya basalite na antɛnɛ na yango. Kasi basalite ya mike koleka, mike lokola monene ya nsuki ya moto elongwaka nde na nsuki ya mike mingi koleka.

Talá ndenge furmi yango ezali kolongola salite na ba antɛnɛ na yango

Hackmann ná ekipi na ye bamoni ete mayele oyo furmi yango esalelaka mpo ba antɛnɛ na yango ezala kaka pɛto, bakoki kosalela mayele yango na baizini. Na ndakisa, mayele ya ndenge wana ekosalisa mpo na kobatela bopɛto ntango bazali kosala biteni ya baaparɛyi ya mikemike oyo elekisaka kura, oyo ata salite ya moke mpenza ekoki kobebisa yango.

Okanisi nini: Likoki oyo furmi charpentière ezalaka na yango ya kopɛtola ba antɛnɛ na yango, ebimá kaka yango moko to basalaki yango kosala?